Mokanda ya liboso epai ya
Bakolinto
1
Ebandeli ya mokanda
Polo oyo abengama mpo na kozala ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko mobali Sositeni ;
 
Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ;
mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :
 
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
 
Polo azongisi matondi epai ya Nzambe
Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ; pamba te, kati na makambo nyonso, botondisamaki na bomengo kati na Klisto, na oyo nyonso etali maloba mpe na oyo etali boyebi, kolanda ndenge Nzambe azali kokokisa kati na bino litatoli na biso na tina na Klisto. Boye, bozangi ata likabo moko te ya ngolu ya Nzambe, wana bozali kozela na posa makasi komonisama ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto. Ezali Ye nde akolendisa mpe bino kino na suka, mpo ete bozala bato bazangi pamela na mokolo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto. Pamba te Nzambe oyo abengaki bino mpo ete bozala moko na Mwana na Ye, Yesu-Klisto, Nkolo na biso, azali Moyengebene.
Bokabwani kati na Lingomba ya Kolinto
10 Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko. 11 Pamba te, bandeko na ngai, bavandi ya ndako ya Kloe bayebisi ngai ete koswana ezali kati na bino. 12 Tala makambo oyo nalingi koloba : Moko kati na bino azali koloba : « Ngai nazali moto ya Polo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Apolosi ; » mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Petelo ; » mpe mosusu azali koloba : « Ngai nazali moto ya Klisto. »
13 Boni, Klisto azali ya kokabwana ? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino ? Ezali na kombo ya Polo nde bozwaki libatisi ? 14 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi, 15 mpo ete moko te aloba ete bobatisamaki na kombo na ngai. 16 Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu. 17 Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.
Bwanya ya bato mpe liboma mpo na Nzambe
18 Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ; 19 kolanda ndenge ekomama :
« Nakobebisa bwanya ya bato ya bwanya,
mpe nakokomisa mayele ya bato ya mayele bozoba. »
20 Wapi moto ya bwanya ? Wapi molakisi ya Mobeko ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma ? 21 Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma. 22 Lokola mpe Bayuda bazali koluka bikamwa, mpe Bagreki, bwanya, 23 biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano. 24 Nzokande, mpo na bato oyo Nzambe abenga, ezala Bayuda to Bagreki, Klisto azali nguya mpe bwanya ya Nzambe. 25 Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.
26 Bandeko, bokanisa nanu oyo bozalaki tango Nzambe abengaki bino : kati na bino, moke bazalaki bato ya bwanya kolanda emoneli ya bomoto, moke bazalaki bato minene, mpe moke bawutaki na mabota ya lokumu ! 27 Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.
28 Nzambe aponaki biloko ezanga tina, biloko ya kotiola, biloko oyo ezalaka te, mpo na kokomisa pamba biloko oyo mokili epesaka tina, 29 mpo ete moto ata moko te amikumisa liboso ya Nzambe. 30 Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama, 31 mpo ete, kolanda ndenge ekomama,
« Tika ete moto oyo alingi komikumisa
amikumisa kati na Nkolo ! »