2
Mateya ya Polo kuna na Kolinto
Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya. Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu. Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya, mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
Bwanya ya solo na nzela ya Molimo
Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. Te ! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango ; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. Kasi, kolanda ndenge ekomama :
« Oyo liso etikala nanu komona te,
oyo litoyi etikala nanu koyoka te,
mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te
kati na motema na ye,
yango nde Nzambe abongisi
mpo na bato oyo balingaka Ye. »
10 Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye ; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe. 11 Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te ? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye. 12 Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu. 13 Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
14 Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo. 15 Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso ; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama :
16 « Nani ayebi makanisi ya Nkolo
mpo akoka kopesa Ye toli ? »
Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.