10
Ndakisa ya botomboki ya Isalaele
Bandeko, nalingi boyeba malamu likambo oyo : Bakoko na biso bazalaki bango nyonso na se ya lipata, bakatisaki bango nyonso ebale monene, babatisamaki bango nyonso mpo na Moyize kati na lipata mpe kati na ebale monene, baliaki bango nyonso bilei ya molimo ya ndenge moko, mpe bamelaki bango nyonso mayi ya molimo ya ndenge moko ; pamba te bazalaki komela na libanga ya molimo, oyo ezalaki kotambola elongo na bango ; mpe libanga yango ezalaki Klisto. Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe.
Ezali bandakisa mpo na biso, mpo ete tolula makambo mabe te ndenge bango balulaki. Bozala basambeli ya banzambe ya bikeko te, ndenge bamosusu kati na bango bazalaki, kolanda ndenge ekomama : « Bato bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela, mpe batelemaki mpo na kosakana. »
Tosengeli te kosala pite, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe, na mokolo moko, bato nkoto tuku mibale na misato bakufaki.
Tosengeli mpe te komeka Klisto, ndenge bamosusu kati na bango basalaki ; mpe banyoka ebomaki bango mpo ete eswaki bango.
10 Boyimaka-yimaka te ndenge bamosusu kati na bango bayimaki-yimaki, mpe anjelu mobebisi abomaki bango.
11 Makambo wana nyonso ekweyelaki bango mpo ete ezala ndakisa mpo na biso, mpe ekomamaki mpo na kokebisa biso oyo tokomi na tango ya suka. 12 Yango wana, tika ete moto oyo azali kokanisa ete azali ya kotelema asala keba ete akweya te !
13 Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.
Kozala moko te elongo na banzambe ya bikeko
14 Yango wana, balingami na ngai, bokima kosambela banzambe ya bikeko.
15 Nazali koloba na bino lokola na bato ya mayele ; botala bino moko soki makambo oyo nazali koloba ezali malamu to mabe. 16 Boni, kopo ya elambo oyo, mpo na yango, tozongisaka matondi epai ya Nzambe, ekomisaka biso te moko na makila ya Klisto ? Lipa oyo tokataka ekomisaka biso te moko na nzoto ya Klisto ? 17 Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko.
18 Bokanisa nanu Isalaele ! Boni, bato oyo baliaka banyama oyo epesami lokola mbeka bazalaka moko te na etumbelo ? 19 Nalingi koloba nini ? Nalingi koloba ete misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe yango moko nzambe ya ekeko, ezali na tina ? 20 Te ! Kasi lokola babonzaka bambeka na bango epai ya milimo mabe mpe epai ya oyo ezali Nzambe te, naboyi ete bozala moko na milimo mabe. 21 Bokoki te komela oyo ezali kati na kopo ya Nkolo mpe komela lisusu oyo ezali kati na kopo ya milimo mabe ; bokoki te kolia na mesa ya Nkolo mpe kolia lisusu na mesa ya milimo mabe. 22 Boni, tolingi nde kotumbola zuwa ya Nkolo ? Boni, tozali makasi koleka Ye ?
Tosala nyonso mpo na lokumu ya Nzambe
23 Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.
24 Tika ete moto moko te aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya moto mosusu !
25 Boliaka nyonso oyo etekamaka na zando, na komipesa mituna te na tina na yango, noki te bobebisa mitema na bino. 26 Pamba te mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ezali ya Nkolo.
27 Soki moto oyo azali mondimi te abengisi yo, mpe ondimi kokende epai na ye, lia nyonso oyo bakopesa yo, na komipesa mituna te, noki te obebisa motema na yo. 28 Kasi soki moto moko alobi na yo : « Mosuni oyo ebonzamaki lokola mbeka epai ya nzambe ya ekeko, » kolia yango te, likolo ya moto oyo akebisi yo mpe mpo ete obebisa te motema na yo. 29 Awa, nazali koloba te na tina na motema na yo, kasi na tina na motema ya moto yango, pamba te mpo na nini motema ya moto mosusu elandela bonsomi na ngai ? 30 Soki naliaka na kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpo na nini kopamela ngai na tina na oyo, ngai, nazongiselaka matondi epai ya Nzambe ?
31 Boye, ezala kolia to komela, nyonso oyo bokoki kozala kosala, bosalaka nyonso mpo na lokumu ya Nzambe.
32 Bozalaka libaku te, ezala mpo na Bayuda, mpo na Bagreki to mpo na Lingomba ya Nzambe. 33 Yango wana, ngai, kati na makambo nyonso, nasalaka makasi mpo na kosepelisa bato nyonso ; nalukaka litomba na ngai moko te, kasi nalukaka bolamu ya bato ebele, mpo ete babika.