11
Bolanda ndakisa na ngai, ndenge ngai nalandaka ndakisa ya Klisto.
Mobali mpe mwasi liboso ya Nkolo
Nakumisaka bino kati na makambo nyonso, pamba te bokanisaka ngai mpe bopengwaka te kati na malakisi oyo napesaki bino.
Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto. Mobali nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali ya kozipama, ayokisaka Mokonzi na ye soni. Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki. Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye.
Mobali asengeli te kolata kitambala, pamba te azali elilingi mpe lokumu ya Nzambe ; kasi mwasi azali lokumu ya mobali. Pamba te mobali akelama te wuta na mwasi, kasi mwasi akelama wuta na mobali. Mobali akelama te mpo na mwasi, kasi mwasi akelama mpo na mobali. 10 Yango wana, likolo ya ba-anjelu, mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye. 11 Nzokande, kati na Nkolo, mwasi azali te soki mobali azali te, mpe mobali azali te soki mwasi azali te. 12 Pamba te ndenge mwasi akelamaki wuta na mobali, ndenge mpe mobali abotamaki na nzela ya mwasi. Kasi makambo nyonso ewutaka na Nzambe.
13 Botala nanu bino moko : boni, ezali malamu mpo na mwasi kosambela Nzambe moto polele ? 14 Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi, 15 kasi ezali nde lokumu mpo na mwasi kozala na suki milayi ? Pamba te suki epesama na mwasi lokola kitambala.
16 Soki moto moko akanisi ete ezali malamu mpo na ye kotia tembe na tina na likambo oyo, biso elongo na Mangomba ya Nzambe tozalaka na ezaleli wana te.
Bilei ya Nkolo
17 Kati na malako oyo ezali kolanda, nakokumisa bino te ; pamba te mayangani na bino esungaka bino te mpo bokoma bato ya esengo koleka, kasi ekomisaka bino lisusu bato na pasi makasi.
18 Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke. 19 Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino.
20 Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo ; 21 pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko ; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka.
22 Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ?
Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te ! 23 Pamba te, nateyaki bino makambo oyo nazwaki epai ya Nkolo : Nkolo Yesu, na butu oyo batekaki Ye, azwaki lipa ; 24 mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe alobaki : « Oyo ezali nzoto na Ngai ; epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. » 25 Ndenge moko mpe, sima na Ye kolia, azwaki kopo mpe alobaki : « Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai ! Tango nyonso bokobanda komela yango, bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai. » 26 Boye, tango nyonso bokozala kolia lipa oyo mpe komela kopo oyo, bokozala kosakola kufa ya Nkolo kino akozonga.
27 Yango wana, moto nyonso oyo akolia lipa to akomela kopo ya Nkolo na lolenge oyo ebongi te, akomema ngambo epai ya nzoto mpe makila ya Nkolo. 28 Boye tika ete moto nyonso amitala malamu liboso ya kolia lipa mpe komela wuta na kopo ! 29 Pamba te moto oyo azali kolia lipa mpe komela, na kozanga kososola ete ezali nzoto ya Nkolo, azali komikatela etumbu na kolia mpe komela bongo. 30 Yango wana mingi kati na bino bakoma na bolembu mpe na bokono, mpe ebele kati na bino bakufa. 31 Kasi soki tozalaki kososola oyo tozali, tolingaki kozwa etumbu te. 32 Nzokande, Nkolo apesaka biso etumbu mpo na kozongisa biso na nzela, mpo ete tozwa etumbu te elongo na mokili.
33 Boye bandeko na ngai, tango boyaka na mayangani mpo na kolia elongo, bozelanaka. 34 Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.