12
Makabo ya Molimo
Bandeko, nakosepela ete bozala na boyebi na tina na makambo oyo etali makabo ya Molimo. Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te. Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
Makabo ezali ya ndenge na ndenge, kasi Molimo azali kaka moko. Misala ezali ya ndenge na ndenge, kasi Nkolo azali kaka moko. Ezali na lolenge ebele ya kosalela Nkolo, kasi Nzambe azali kaka moko ; mpe ezali Ye nde asalaka nyonso kati na bato nyonso.
Nzokande, Molimo amimonisaka epai na moko na moko mpo na bolamu ya bato nyonso. Epai na moko, Molimo apesi liloba ya bwanya ; epai na mosusu, liloba ya boyebi ; epai na mosusu kondima ; epai na mosusu, likabo ya kobikisa babeli ; 10 epai na mosusu, nguya ya kosala bikamwa ; epai na mosusu, likabo ya kosakola ; epai na mosusu, likabo ya kososola milimo ; epai na mosusu, likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge ; epai na mosusu, likabo ya kolimbola nkota. 11 Ezali Molimo kaka moko nde asalaka misala wana nyonso mpe akabolaka yango epai na moko na moko, ndenge Ye moko alingi.
Biteni ebele kati na nzoto moko
12 Nzoto ezali kaka moko, kasi ezali na biteni ebele ; mpe atako motango na yango ezali ebele, kasi ezali kosala kaka nzoto moko. Ezali mpe bongo mpo na Klisto. 13 Solo, biso nyonso tobatisamaki kati na Molimo moko mpo na kosala nzoto moko : ezala Bayuda to Bagreki, ezala bawumbu to bansomi. Mpe epesamelaki biso nyonso komela Molimo wana se moko.
14 Nzoto ezali na eteni moko te, kasi ezali na biteni ebele. 15 Soki lokolo elobi : « Lokola nazali loboko te, nazali kati na nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 16 Soki mpe litoyi elobi : « Lokola nazali liso te, nazali eteni ya nzoto te ; » boni, ekotika penza kozala eteni ya nzoto mpo elobi bongo ? 17 Soki nzoto mobimba ezalaki kaka liso, nzoto yango elingaki koyoka ndenge nini ? Soki nzoto mobimba ezalaki kaka litoyi, nzoto yango elingaki koyoka solo ndenge nini ? 18 Kasi Nzambe atiaki biteni kati na nzoto, mpe amonaki ete ezali malamu mpo na eteni moko na moko kozala na mosala na yango. 19 Soki biteni nyonso ezalaki kaka eteni moko, boni, nzoto elingaki penza kozala nzoto ?
20 Solo, biteni ezali ebele, kasi nzoto ezali kaka moko. 21 Yango wana, liso ekoki te koloba na loboko : « Nazali na posa na yo te ; » moto mpe ekoki te koloba na makolo : « Nazali na posa na bino te. »
22 Nzokande biteni ya nzoto, oyo emonanaka ete ezali na motuya moke, ezalaka na tina makasi ; 23 biteni oyo tozwaka na lokumu moke kati na nzoto, tobatelaka yango makasi ; mpe biteni oyo toyokaka nkele, yango nde tobongisaka na lolenge malamu, 24 wana biteni oyo ebetisaka mabaku te ezalaka na posa ya lolenge malamu yango te. Nzambe abongisa nzoto na lolenge ete basengeli kaka kozwaka na lokumu mingi, biteni oyo emonanaka lokola ezanga lokumu : 25 asalaki bongo mpo ete bokabwani ezala te kati na nzoto, kasi mpo ete biteni na yango esunganaka. 26 Soki eteni moko eyoki pasi, biteni nyonso esengeli koyoka pasi elongo na moko yango ; soki mpe moko kaka nde esepeli, biteni nyonso esengeli kokabola esengo elongo na moko yango. 27 Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto. 28 Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge. 29 Boni, bango nyonso bazali bantoma ? Bango nyonso bazali basakoli ? Bango nyonso bazali balakisi ? Bango nyonso basalaka bikamwa ? 30 Bango nyonso bazali na likabo ya kobikisa babeli ? Bango nyonso balobaka nkota ya ndenge na ndenge ? Bango nyonso balimbolaka nkota ?
31 Bozala na posa makasi ya kozala na makabo oyo eleki na monene. Mpo na yango, nakolakisa bino nzela oyo eleki malamu.