9
Bapakoli Jewu mafuta lokola mokonzi ya Isalaele
Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi. Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati. Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima ; kozela te ! »
Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi. Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki :
— Nazali na sango mpo na yo mokonzi.
Jewu atunaki :
— Mpo na nani kati na biso ?
Mosakoli azongisaki :
— Mpo na yo mokonzi.
Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. › Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango. Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi. Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya. 10 Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. »
Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki.
11 Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye :
— Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ?
Jewu azongisaki :
— Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka.
12 Bakonzi ya basoda balobaki :
— Ezali ya solo te, ozali kokosa biso ! Yebisa biso makambo yango.
Jewu alobaki :
— Boyoka ndenge alobi na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napakoli yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › »
13 Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »
Jewu abomi Yorami mpe Akazia
14 Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri. 15 Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki : « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. »
16 Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye.
17 Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! »
Yorami apesaki mitindo :
— Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? »
18 Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki :
— Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? »
Jewu azongisaki :
— Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.
Mokengeli alobaki :
— Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te.
19 Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki :
— Boni, boyei mpo na kimia ?
Jewu azongisaki :
— Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai.
20 Mokengeli alobaki :
— Motindami akomi penza epai na bango, kasi ye mpe azali kozonga te. Nzokande, lolenge oyo ya kotambolisa ezali lokola ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo atambolisaka lokola moto ya liboma.
(2Ma 22.7-9)
21 Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. »
Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. 22 Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye :
— Boni Jewu, oyei mpo na kimia ?
Jewu azongisaki :
— Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ?
23 Yorami abalukaki mpe akimaki ; abelelaki Akazia : « Akazia, bateki biso ! »
24 Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye. 25 Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye : 26 ‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.
27 Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! »
Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna. 28 Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi. 29 Akazia akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Yorami, mwana mobali ya Akabi.
Kufa ya Jezabeli
30 Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda. 31 Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga :
— Zimiri, mobomi ya nkolo na yo, boni, oyei mpo na kimia ?
32 Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki :
— Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ?
Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa. 33 Jewu apesaki bango mitindo :
— Bobwaka ye na se.
Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye. 34 Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki : « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. » 35 Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye. 36 Bazongaki mpe bayebisaki Jewu : « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe : ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli. 37 Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › »