10
Jewu abomi libota ya mokonzi Akabi
Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki :
« Tango kaka mokanda oyo ekokomela bino, lokola bana mibali ya mokonzi na bino bazali elongo na bino, mpe lokola bozali na bashar mpe bampunda, engumba ya makasi mpe bibundeli, bopona mwana mobali oyo aleki malamu mpe mayele kati na bana mibali ya mokonzi na bino, botia ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye, mpe bobunda mpo na ndako ya mokonzi na bino. »
Kasi babangaki makasi mpe balobaki : « Soki kutu bakonzi mibale bakokaki te kobunda na ye, bongo ndenge nini biso tokobunda na ye ? »
Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu : « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. »
Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki :
« Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. »
Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango. Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli. Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu :
— Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi.
Bongo Jewu apesaki mitindo :
— Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo.
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki :
— Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye ; kasi nani abomi bato oyo nyonso ? 10 Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya.
11 Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli : bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi. 12 Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari.
Na Beti-Ekedi-Aron* Beti-Ekedi-Aron elingi koloba, na lokota ya Ebre : ndako ya babateli bibwele., 13 Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango :
— Bozali banani ?
Bazongisaki :
— Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote.
14 Jewu apesaki mitindo :
— Bokanga bango ya bomoi.
Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi.
15 Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki :
— Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ?
Yonadabi azongisaki :
— Iyo, ezali bongo !
Jewu alobaki :
— Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo.
Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar.
16 Jewu alobaki :
— Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe.
Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye.
17 Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya.
Jewu abomi basambeli ya Bala
18 Jewu abengisaki bato nyonso mpe alobaki na bango : « Akabi azalaki kosalela Bala mingi te, kasi Jewu akosalela ye mingi. 19 Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. »
Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala. 20 Jewu alobaki : « Bobengisa mayangani mpo na lokumu ya Bala. »
Boye babengisaki mayangani yango.
21 Jewu apanzaki sango kati na Isalaele, basambeli nyonso ya Bala bayaki mpe moto moko te azangaki. Bakotaki ebele na ndako ya nzambe Bala mpe batondisaki yango kino na basuka nyonso. 22 Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala : « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. »
Boye abimisaki bilamba mpo na bango. 23 Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala : « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. »
24 Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango.
Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo : « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. »
25 Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango : « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. »
Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala. 26 Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango. 27 Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo. 28 Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele.
29 Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani.
30 Yawe alobaki na Jewu : « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
31 Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. 32 Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango, 33 na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani.
34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jewu, misala na ye nyonso mpe elonga na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 35 Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. 36 Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe.

*10:12 Beti-Ekedi-Aron elingi koloba, na lokota ya Ebre : ndako ya babateli bibwele.