11
Atali mpe Joasi
(2Ma 22.10–23.21)
Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi. Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te. Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili.
Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari* Bato ya Kari bazalaki basoda ya bapaya na mokili ya Azia ya kati. mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi. Apesaki bango mitindo oyo : « Tala ndenge bokosala : kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba ; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi, ndambo ya mibale bakozala na ekuke ya Suri, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke, na sima ya ndako ya bakengeli. Bandambo nyonso misato bakokitana, moko sima na mosusu, kati na mosala ya kokengela Tempelo. Bandambo mibale oyo bakosala te na mokolo ya Saba bakokengela Tempelo ya Yawe mpo na mokonzi. Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. »
Bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko basalaki nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango, mpe akendeki epai ya Nganga-Nzambe Yeoyada. 10 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga mpe banguba oyo ezalaki ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe. 11 Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo. 12 Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
13 Tango Atali ayokaki makelele oyo bato mpe bakengeli bazalaki kosala, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe. 14 Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! »
15 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! »
16 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
17 Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe ; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato. 18 Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe. 19 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi. 20 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi.

*11:4 Bato ya Kari bazalaki basoda ya bapaya na mokili ya Azia ya kati.