14
Amatsia, mokonzi ya Yuda
(2Ma 25.1-4, 11-12)
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye. Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa.
Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye. Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. »
Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.
Isalaele elongi Yuda
(2Ma 25.17–26.2)
Bongo Amatsia atindaki bantoma epai ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele, mpo na koyebisa ye :
— Yaka tobunda !
Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda :
— Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende. 10 Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ?
11 Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda. 12 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye. 13 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka. 14 Akamataki wolo nyonso, palata nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari.
15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 16 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
17 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele. 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. 19 Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna. 20 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi.
21 Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia. 22 Ezalaki ye nde moto atongaki lisusu engumba ya Eyilati mpe azongisaki yango na Yuda sima na kufa ya tata na ye, mokonzi Amatsia.
Jeroboami II, mokonzi ya Isalaele
23 Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko. 24 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 25 Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi. 26 Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango. 27 Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi.
28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 29 Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele ; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.