15
Azaria, mokonzi ya Yuda
(2Ma 26.3-4, 21-23)
Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi, Azaria, mwana mobali ya Amatsia, akomaki mokonzi ya Yuda. Azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi. Azaria asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki. Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili.
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi ; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Zakari, mokonzi ya Isalaele
Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari ; mpe akonzaki basanza motoba. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 10 Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. 11 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zakari, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
12 Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. »
Shalumi, mokonzi ya Isalaele
13 Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko. 14 Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari ; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. 15 Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
16 Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi.
Menayeme, mokonzi ya Isalaele
17 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi. 18 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 19 Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye. 20 Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye.
21 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Menayeme mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. 22 Menayeme akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Pekakia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
Pekakia, mokonzi ya Isalaele
23 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale. 24 Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 25 Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi. 26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Peka, mokonzi ya Isalaele
27 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale. 28 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. 29 Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri. 30 Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi. 31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Peka mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
Yotami, mokonzi ya Yuda
32 Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
(2Ma 27.1-4, 7-9)
33 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki. 34 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki. 35 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe. 36 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda.
37 Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda. 38 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.