2
Soda ya Yesu-Klisto
Mwana na ngai, zala makasi kati na ngolu oyo ezali kati na Yesu-Klisto. Makambo oyo oyokaki epai na ngai liboso ya batatoli ebele, teya yango na bato ya sembo oyo bazali na makoki ya koteya yango lisusu na bato mosusu. Mona pasi elongo na ngai lokola soda ya mpiko ya Yesu-Klisto. Moto oyo akoti na mosala ya soda amipesaka te na makambo ya bato oyo bazali basoda te mpo na kosepelisa mokonzi na ye ya mampinga.
Ezali mpe ndenge moko mpo na moto oyo azali kosala lisano ya kokima mbangu : akoki te kozwa motole soki akimi mbangu te kolanda mibeko ya lisano. Moloni elanga oyo asalaka makasi asengeli kozala moto ya liboso mpo na kobuka bambuma. Kanisaka malamu na tina na makambo oyo nazali koloba, mpe Nkolo akopesa yo makoki ya kososola yango nyonso.
Kanisaka Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi, oyo asekwaki kati na bakufi, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka. Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi kino bakanga ngai minyololo lokola mobomi, kasi bakangi Liloba na Nzambe minyololo te. 10 Yango wana nazali koyikela makambo nyonso mpiko mpo na bolamu ya bato oyo Nzambe apona, mpo ete bango mpe bazwa lobiko oyo ezali kati na Yesu-Klisto, elongo na nkembo ya seko.
11 Maloba oyo ezali ya solo :
Soki tokufi elongo na Ye,
tokozala mpe na bomoi elongo na Ye.
12 Soki toyiki mpiko,
tokokonza mpe elongo na Ye.
Kasi soki towangani Ye,
Ye mpe akowangana biso ;
13 soki tozangi kondima,
Ye azalaka kaka Moyengebene,
pamba te akoki komiwangana te.
Kosalela Nzambe na bosolo
14 Yango nde makambo oyo osengeli koloba mbala na mbala epai ya bato, na kopesa bango mitindo liboso ya Nzambe ete batika koswana na tina na maloba ; ezali na tina moko te, soki kaka te komema bato oyo bayokaka yango na libebi. 15 Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo. 16 Kima masolo oyo ezanga tina mpe efingaka Nzambe, pamba te ememaka bato oyo bamipesaka na yango mosika na Nzambe. 17 Mateya na bango eliaka nzoto lokola pota oyo ezali na tofina. Kati na bango, tozali na Imene mpe Filete 18 oyo basila kotika nzela ya solo. Bazali koloba ete lisekwa esili kosalema mpe bazali kokweyisa kondima ya bandimi mosusu. 19 Nzokande moboko makasi oyo Nzambe asila kotia ezali kaka ngwi ; batobola makomi oyo na likolo na yango lokola kashe : « Nkolo ayebi bato na Ye, » mpe « Moto nyonso oyo atatolaka Kombo ya Nkolo asengeli koboya mabe. »
20 Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.
21 Soki moto amibateli peto na makambo nyonso oyo nawuti koloba, akozala lokola sani oyo babongisi mpo na koyamba bato ya lokumu, akozala bule, moto na tina mpo na Nkolo mpe moto oyo babongisi mpo na misala nyonso ya malamu.
22 Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
23 Kima masolo ya tembe ya bozoba mpe ezanga tina, pamba te oyebi malamu ete esukaka kaka na koswana. 24 Mpe ezali malamu te mpo na mosali ya Nkolo kozala moto oyo aswanaka na bato, kasi asengeli nde kozala moto ya boboto epai ya bato nyonso, moto oyo azali na makoki ya kopesa malakisi, ya kokanga motema 25 mpe ya koteya na boboto bato oyo babendanaka na ye ; asengeli kozala na elikya ete Nzambe akosalela bango ngolu ya kobongola mitema mpo ete bayeba solo. 26 Bongo bakozongela mayele na bango ya malamu mpe bakolongwa na motambo ya Satana oyo akanga bango na boloko mpo ete basala kaka mokano na ye.