3
Mikolo ya suka
Kasi yeba malamu ete mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi : bato bakokoma na lokoso ya mbongo, bakokoma miyimi, lolendo, lofundu ; bakokoma kofinga Nzambe, kozanga botosi epai ya baboti na bango, koboya kozongisa matondi, kozanga limemia mpo na biloko ya bule, kozanga bolingo, kozanga mawa, kokosela baninga makambo, kozanga makoki ya komikanga, bato na kanza, banguna ya bolamu, bateki baninga, bato ya mitema mikuse, bato na komitombola, bato balinga bisengo na esika ya kolinga Nzambe ; bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !
Bamosusu kati na bango bakotaka na bandako ya bato mpe bakosaka basi ya pete oyo batonda na masumu mpe bamitikaka na lolenge nyonso ya baposa ya nzoto, oyo balukaka tango nyonso koyekola kasi bakokaka ata moke te koyeba solo. Ndenge Janesi mpe Jambresi batelemelaki Moyize, ndenge wana mpe bato wana batelemelaka solo. Bazali bato oyo makanisi na bango esila kobeba mpe kondima na bango esila kokufa. Kasi bakokende mosika te, pamba te bozoba na bango ekomonana na miso ya bato nyonso, ndenge ezalaki mpo na mibali wana mibale.
Kokangama na malakisi oyo oyekolaki
10 Nzokande yo oyebi nyonso na tina na mateya na ngai, bizaleli, makanisi, kondima, kokanga motema, bolingo, mpiko, 11 minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso. 12 Solo, bato nyonso oyo balingi kotambola na botosi kati na Yesu-Klisto bakonyokolama. 13 Kasi bato mabe mpe ba-oyo bakosaka baninga bakozala kozinda kati na mabe, kokosa bato mosusu, mpe bango moko bakokosa bango.
14 Kasi yo, kangama kaka na makambo oyo oyekolaki mpe ondimaki, pamba te oyebi epai ya nani oyekolaki yango ; 15 mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
16 Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, 17 mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.