Misala ya Bantoma
Ebandeli
1
Teofile :
 
Kati na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.
Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango ; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
Kati na kozela boyei ya Molimo
Elaka ya Molimo Mosantu
Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo : « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela. Pamba te Yoane abatisaki na mayi ; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye :
— Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele ?
Yesu azongiselaki bango :
— Likambo ya koyeba tango to mikolo oyo Tata abongisa, na mokano na Ye moko, etali bino te. Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Bozongi na Yelusalemi
Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango. 10 Mpe wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azali komata, mbala moko bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki :
11 — Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo ? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
12 Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko. 13 Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki :
 
Petelo, Yoane, Jake, Andre,
Filipo, Toma,
Bartelemi, Matayo ;
Jake, mwana mobali ya Alife ;
Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote ;
mpe Jide, mwana mobali ya Jake.
 
14 Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
Baponi Matiasi mpo na kozwa esika ya Yuda
15 Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale 16 mpe alobaki na bango : « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama ; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu. 17 Azalaki moko kati na biso mpe asanganaki elongo na biso kati na lotomo oyo epesamelaki biso. » 18 Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga ; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki. 19 Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango ; yango wana bakomaki kobenga elanga yango « Akelidama » oyo elingi koloba, na lokota na bango : Elanga ya makila. 20 Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo :
« Tika ete ndako na ye etikala polele,
mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango ! »
Mpe :
« Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye ! »
21 Boye, tosengeli kopona moto moko kati na mibali oyo bazalaki elongo na biso tango nyonso oyo Nkolo Yesu azalaki kotambola na mokili elongo na biso, 22 kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.
23 Bapesaki bakombo ya bato mibale : Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi. 24 Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale, 25 mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »
26 Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi ; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.