Batatoli kati na Yelusalemi
2
Boyei ya Molimo Mosantu
Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko. Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana. Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango. Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
Nzokande, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili. Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka.
Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna : « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te ? Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka ? Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia, 10 ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome, 11 bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! » 12 Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana : « Likambo oyo elingi koloba nini ? »
13 Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : « Balangwe vino ya sika. »
Petelo ateyi ebele ya bato
14 Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato :
— Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba. 15 Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo. 16 Kasi ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki :
17 « Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe,
nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso.
Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ;
bilenge na bino bakozwa bimoniseli,
mibange na bino bakolota bandoto.
18 Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na Ngai
kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi,
mpe bakosakola.
19 Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo,
mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili :
makila, moto mpe likonzi ya milinga.
20 Moyi ekobongwana molili,
sanza ekobongwana makila
liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma,
mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.
21 Boye, moto nyonso oyo akobelela
Kombo ya Nkolo akobikisama. »
22 Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango, 23 akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu. 24 Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye. 25 Boye, tala makambo oyo Davidi aloba na tina na Ye :
« Nazalaki komona Nkolo mikolo nyonso liboso na ngai,
pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
26 Yango wana, motema na ngai etondi na esengo,
mpe lolemo na ngai ezali kosepela.
Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,
27 pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi
mpe okotika te ete mosantu na Yo apola.
28 Pamba te olakisaki ngai nzela ya bomoi,
mpe okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo. »
29 Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye ; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo. 30 Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi. 31 Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki lisekwa ya Klisto ete Nzambe akosundola Ye te kati na mboka ya bakufi mpe akotika te ete nzoto na Ye epola. 32 Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango. 33 Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.
34 Pamba te, Davidi amataki te na Likolo, kasi alobaki :
« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :
‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
35 kino nakomisa banguna na Yo
enyatelo makolo na Yo. › »
36 Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.
Bandimi ya liboso
37 Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu :
— Bandeko, tosala nini ?
38 Petelo azongiselaki bango :
— Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu. 39 Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.
40 Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo :
— Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.
41 Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.
Lisanga ya bandimi
42 Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela. 43 Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa. 44 Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso. 45 Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kokabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto. 46 Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa. 47 Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.