Mibembo ya Saulo mpo na kopanza Sango Malamu
13
Na etinda ya Nkolo, Saulo mpe Barnabasi bakei
Kati na Lingomba oyo ezalaki na Antioshe, ezalaki na basakoli mpe balakisi : Barnabasi, Simeoni oyo bazalaki kobenga « Moto mwindo, » Lusiusi ya Sirene, Manaeni oyo akolaki esika moko na moyangeli Erode, mpe Saulo.
Ezalaki mokolo moko, wana bazalaki kogumbamela Nkolo mpe kokila bilei, Molimo Mosantu alobaki :
— Botiela ngai pembeni Barnabasi mpe Saulo mpo na mosala oyo nabengeli bango.
Boye, sima na bango kokila bilei mpe kosambela, batielaki bango maboko mpe batikaki bango kokende.
Barnabasi mpe Saulo kati na Shipre
Na etinda ya Molimo Mosantu, Barnabasi mpe Saulo bakendeki na Selesi ; mpe longwa kuna, bazwaki masuwa mpo na kokende na esanga ya Shipre. Tango bakomaki na Salamine, bateyaki Liloba na Nzambe kati na bandako ya mayangani ya Bayuda. Yoane Malako azalaki elongo na bango lokola mosungi.
Bakatisaki esanga mobimba kino bakomaki na Pafosi epai wapi bamonaki Moyuda moko, kombo na ye « Bari-Yesu. » Azalaki moto ya maji mpe mosakoli ya lokuta. Azalaki mpe moninga ya moyangeli Sergiusi Paulusi oyo azalaki moto ya mayele. Boye, Sergiusi Paulusi abengisaki Barnabasi mpe Saulo, pamba te azalaki na posa ya koyoka Liloba na Nzambe. Kasi Elimasi, moto ya maji (pamba te yango nde ezali ndimbola ya kombo na ye), atelemelaki bango mpe azalaki kosala nyonso mpo na kopengwisa kondima ya moyangeli. Bongo lokola Saulo, oyo bazalaki mpe kobenga « Polo, » azalaki atondisama na Molimo Mosantu, atalaki Elimasi na miso mpe alobaki na ye :
10 — Mwana ya Satana mpe monguna ya makambo nyonso ya sembo ! Otondi na lolenge nyonso ya lokuta mpe ya mayele mabe ! Kino tango nini okotika kobebisa mabongisi ya Nkolo, oyo ezali sembo ? 11 Tala, loboko ya Nkolo etelemeli yo sik’oyo. Ozali kokoma mokufi miso mpo na mwa tango moke, okomona lisusu te pole ya moyi.
Kaka na tango yango, lipata mpe molili ezipaki miso ya Elimasi ; azalaki lisusu komona te mpe akomaki kobaluka-baluka bipai nyonso na koluka moto mpo ete asimba ye na loboko mpe alakisa ye nzela. 12 Tango moyangeli amonaki makambo oyo esalemaki, andimaki, pamba te mateya na tina na Nkolo ekamwisaki ye makasi.
Barnabasi kati na Antioshe ya Pisidi
13 Wuta na Pafosi, Polo elongo na baninga na ye bazwaki masuwa mpe bakendeki na Perje, kati na mokili ya Pafili, epai wapi Yoane Malako atikaki bango mpo na kozonga na Yelusalemi. 14 Mpe longwa na Perje, bakobaki mobembo na bango kino na Antioshe, kati na mokili ya Pisidi. Na mokolo ya Saba, bakotaki na ndako ya mayangani mpe bavandaki. 15 Sima na kotanga Mobeko mpe Basakoli, bakambi ya ndako ya mayangani batindelaki bango maloba :
— Bandeko, soki bozali na maloba mpo na kolendisa bato, bokoki na bino koloba.
16 Polo atelemaki, atombolaki loboko mpe alobaki :
— Bato ya Isalaele mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, boyoka ngai ! 17 Nzambe ya bato ya Isalaele aponaki bakoko na biso, akomisaki bango ekolo monene na tango oyo bavandaki kati na mokili ya Ejipito lokola bapaya, mpe abimisaki bango na mokili yango na nguya monene. 18 Mibu tuku minei mobimba, ayikelaki bango mpiko kati na esobe ; 19 abebisaki bikolo sambo kati na mokili ya Kanana mpe apesaki mabele na bango lokola libula epai ya bato na Ye. 20 Makambo wana nyonso ewumelaki mibu pene nkama minei na tuku mitano.
Sima na yango, Nzambe apesaki bango bilombe kino na tango ya mosakoli Samuele. 21 Bongo, basengaki mokonzi, mpe Nzambe apesaki bango Saulo, mwana mobali ya Kisi, moto ya libota ya Benjame, oyo asalaki mibu tuku minei na bokonzi. 22 Sima na Ye kolongola Saulo, akomisaki Davidi mokonzi na bango. Tala maloba oyo Nzambe atatolaki na tina na ye : « Namoni Davidi, mwana mobali ya Yese, moto oyo asepelisaka motema na ngai ; akokokisa solo mokano na ngai nyonso. »
23 Ezali wuta na libota ya Davidi nde Nzambe abimisaki, mpo na bana ya Isalaele, Mobikisi Yesu, ndenge alakaki. 24 Liboso ete Yesu aya, Yoane ateyaki bato nyonso ya Isalaele ete babongola mitema mpe bazwa libatisi. 25 Wana Yoane akomaki pene ya kosilisa mosala na ye, alobaki : « Bokanisi ete ngai nazali nani ? Nazali te Moto oyo bozali kozela. Kasi azali koya sima na ngai, Ye oyo nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ! »
26 Bandeko na ngai, bino oyo bozali bana ya Abrayami, mpe bino oyo bozali Bayuda te kasi botosaka Nzambe, ezali epai na biso nde Nzambe atindaki maloba oyo ya lobiko. 27 Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango. 28 Atako bamonaki mabe moko te kati na Ye, mabe oyo ekokaki komemela Ye etumbu ya kufa, kasi basengaki kaka ete Pilato aboma Ye. 29 Tango mpe bakokisaki makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ye, bakitisaki Ye longwa na ekulusu mpe batiaki Ye kati na kunda. 30 Kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi, 31 mpe bato oyo basalaki mibembo elongo na Ye, longwa na Galile kino na Yelusalemi, bamonaki Ye mikolo ebele. Bazali sik’oyo batatoli na Ye epai ya bato na biso.
32 Tozali koyebisa bino sango malamu oyo : elaka oyo Nzambe apesaki na bakoko na biso, 33 Nzambe akokisi yango mpo na biso, bana na bango, na kosekwisa Yesu kati na bakufi, kolanda ndenge ekomama kati na Nzembo ya mibale :
« Ozali Mwana na Ngai ;
na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo. »
34 Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi mpo ete apola ata mokolo moko te. Kolanda ndenge Nzambe alobaki :
« Nakopesa bino mapamboli ya bule mpe ya solo,
oyo nalakaki Davidi. »
35 Yango wana, na eteni mosusu, elobamaki lisusu :
« Okotika te Mosantu na Yo kopola. »
36 Nzokande, Davidi, sima na ye kokokisa mabongisi ya Nzambe na tango na ye, akufaki mpe akundamaki pembeni ya bakoko na ye ; boye nzoto na ye epolaki. 37 Kasi Ye oyo Nzambe asekwisaki apolaki te.
38 Yango wana, bandeko na ngai, nalingi boyeba ete ezali na nzela ya Yesu nde bolimbisi ya masumu esakolami epai na bino mpe bozwi bolimbisi ya masumu nyonso oyo Mobeko ya Moyize ekokaki te kokangola bino. 39 Ezali mpe na nzela ya Yesu nde moto nyonso oyo andimi akomi sembo. 40 Yango wana, bosala keba ete makambo oyo basakoli baloba ekomela bino te :
41 « Bino batioli, botala,
bokamwa mpe bolimwa,
pamba te nakosala likambo moko na tango na bino,
likambo oyo bokokaki kondima te
soki bayebisaki bino yango. »
42 Tango Polo mpe Barnabasi babimaki na ndako ya mayangani, bato basengaki bango kolobela lisusu makambo wana na mokolo ya Saba oyo elandaki. 43 Tango mayangani esilaki, Bayuda mingi elongo na bato ya bikolo mosusu, oyo bakotaki na lingomba ya Bayuda mpe bazalaki kogumbamela Nzambe, balandaki Polo mpe Barnabasi oyo bazalaki kosolola na bango mpe kondimisa bango ete batikala ya kokangama makasi na ngolu ya Nzambe.
Polo mpe Barnabasi bateyi bato oyo bazali Bayuda te
44 Na mokolo ya Saba oyo elandaki, bato ebele penza ya engumba bayaki kosangana mpo na koyoka Liloba na Nkolo. 45 Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
46 Bongo, Polo mpe Barnabasi balobaki na bango na mpiko :
— Tosengeli liboso koteya bino Liloba na Nzambe. Kasi lokola boboyi yango mpe bozali bino moko komimona ete bokoki te mpo na kozwa bomoi ya seko, tokeyi na biso sik’oyo epai ya bato oyo bazali Bayuda te. 47 Pamba te, tala makambo oyo Nkolo atindaki biso :
« Nakomisi yo pole mpo na bikolo mosusu,
mpo ete omema lobiko kino na suka ya mokili. »
48 Tango bato ya bikolo ya bapaya bayokaki bongo, basepelaki mpe bakomaki kokumisa Liloba na Nkolo ; mpe bato nyonso oyo Nzambe abongisa mpo na kozwa bomoi ya seko bakomaki bandimi.
49 Liloba na Nkolo epanzanaki na etuka wana mobimba. 50 Kasi Bayuda batiaki songisongi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kogumbamela Nzambe, mpe epai ya bato minene ya engumba wana ; bapelisaki moto mpo ete Polo mpe Barnabasi banyokolama, mpe babenganaki bango wuta na mokili na bango. 51 Na bongo, Polo mpe Barnabasi bapupolaki putulu ya makolo na bango mpo na bato wana, mpe bakendeki na Ikoniomi. 52 Nzokande, bayekoli batondaki na esengo mpe na Molimo Mosantu.