14
Polo mpe Barnabasi kati na engumba Ikoniomi
Na engumba Ikoniomi, Polo mpe Barnabasi bakendeki, lokola momesano, na ndako ya mayangani ya Bayuda ; bateyaki kuna, mpe bato ebele, Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, bakomaki bandimi. Kasi Bayuda oyo baboyaki kondimela batiaki songisongi epai ya bato ya bikolo ya bapaya mpo ete batombokela bandeko. Polo mpe Barnabasi bawumelaki kuna mikolo ebele, bazalaki koteya na mpiko, pamba te bazalaki na elikya kati na Nkolo ; mpe Nkolo azalaki kokokisa bosolo ya mateya ya ngolu na Ye na kopesaka bango nguya ya kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene. Bato ya engumba yango bakabwanaki : ndambo bazalaki sima na Bayuda, mpe ndambo mosusu, sima na bantoma. Bato ya bikolo ya bapaya mpe Bayuda, elongo na bakambi na bango, bazwaki mokano ya konyokola bantoma mpe koboma bango na mabanga ; kasi tango bantoma basosolaki yango, bakimaki na bingumba ya Likawoni : Listre, Derbe mpe bazingazinga na yango. Kuna mpe lisusu, bakobaki kaka koteya Sango Malamu.
Polo mpe Barnabasi kati na Listre
Kati na engumba Listre, ezalaki na moto moko akufa makolo. Wuta mbotama na ye, atikala kotambola te. Azalaki koyoka ndenge Polo azalaki koteya. Polo atalaki ye malamu, amonaki ete azali na kondima mpo na kobikisama 10 mpe alobaki na ye na mongongo makasi :
— Telema ngwi na makolo na yo !
Mbala moko, moto yango apumbwaki mpe akomaki kotambola.
11 Tango ebele ya bato bamonaki makambo oyo Polo asalaki, bagangaki na lokota ya bato ya Likawoni :
— Banzambe bazwi banzoto ya bato mpe bakiteli biso !
12 Kombo oyo babengaki na yango Barnabasi ezali « Zewusi, » mpe kombo oyo babengaki na yango Polo ezali « Erimesi, » pamba te Polo nde azalaki koloba. 13 Nganga-nzambe ya nzambe Zewusi, oyo ndako ya nzambe na ye ezalaki na libanda ya ekuke ya engumba, amemaki na bikuke ya engumba bangombe ya mibali elata bafololo mpe bililingi elingama-lingama lokola basheni, pamba te ye mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye balingaki kotumbela bango mbeka.
14 Kasi tango bantoma, Barnabasi mpe Polo, bayokaki sango ya likambo yango, bapasolaki bilamba na bango, bakendeki mbangu epai ebele ya bato bazalaki na koganga :
15 — Oh baninga, mpo na nini bozali kosala boye ? Biso mpe tozali kaka bato lokola bino. Soki tozali koteya bino Sango Malamu, ezali mpo ete botika banzambe ya bikeko oyo ezanga tina mpe bomipesa na Nzambe na bomoi oyo asala Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango. 16 Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi. 17 Nzokande, atikalaki kolemba te kotalisa bolamu na Ye, na nzela ya konokisela bango mvula kowuta na likolo, kopesa bango bambuma ebele na tango na yango, mpe kopesa bango bilei ebele mpe kotondisa mitema na bango na esengo.
18 Atako balobaki bongo, balongaki na pasi kopekisa ebele ya bato wana kobonzela bango mbeka.
19 Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi. 20 Kasi tango bayekoli bazingelaki Polo, atelemaki mpe azongaki kati na engumba. Bongo mokolo oyo elandaki, akendeki na Derbe elongo na Barnabasi.
Bozongi na Antioshe kati na Siri
21 Sima na Polo mpe Barnabasi koteya Sango Malamu kati na engumba wana mpe kokomisa bato ebele bayekoli, bazongaki lisusu na Listre, na Ikoniomi mpe na Antioshe ; 22 bazalaki kolendisa bayekoli ete bayika mpiko kati na kondima. Bazalaki koloba :
— Tosengeli komona pasi mingi mpo na kokota na Bokonzi ya Nzambe.
23 Polo mpe Barnabasi baponaki bakambi mpo na Lingomba moko na moko mpe, sima na bango kosambela mpe kokila bilei, bakabaki bango na maboko ya Nkolo oyo bandimelaki. 24 Sima na bango koleka etuka ya Pisidi, bakomaki na Pafili. 25 Bateyaki Liloba kati na Perje mpe, sima na yango, bakendeki na libongo ya Atalia.
26 Wuta na Atalia, bakotaki na masuwa mpe bazongaki na Antioshe epai wapi batikaki bango na se ya ngolu ya Nzambe, mpo na mosala oyo bawutaki kokokisa. 27 Tango bakomaki kuna, basangisaki bato ya Lingomba, bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango mpe ndenge nini afungolelaki bato ya bikolo ya bapaya nzela ya kondima. 28 Mpe bawumelaki wana tango molayi elongo na bayekoli.