28
Polo kati na esanga ya Malite
Wana tososolaki ete tosili kobika na likama, toyokaki ete babengaka esanga yango Malite. Bavandi ya esanga yango batalisaki biso bolingo monene mpe basungaki biso mingi. Lokola mvula ezalaki konoka mpe malili ezalaki makasi, bapelisaki moto mpe babengaki biso nyonso ete tokende koyetola. Polo alokotaki liboke ya bakoni ; mpe tango abwakaki yango na moto, molunge ya moto ebimisaki etupa mpe ekangamaki na loboko na ye. Tango bavandi ya esanga bamonaki nyoka ezali kodiembela na loboko ya Polo, balobanaki bango na bango :
— Solo, moto oyo azali penza mobomi ! Awuti kobika na likama ya ebale, kasi bosembo ya Nzambe elandi ye kaka mpo na koboma ye !
Kasi Polo aningisaki loboko, mpe nyoka yango ekweyaki na moto, mpe ayokaki ata pasi te. Bato nyonso bazalaki kozela ete nzoto na ye evimba to akufa mbala moko ; kasi wana bazelaki tango molayi mpe bamonaki ata likambo moko te ya mabe kokomela ye, babongolaki makanisi mpe balobaki :
— Moto oyo azali nzambe.
Zingazinga ya esika oyo tozalaki, ezalaki na mabele ya Pibiliusi, kalaka mokonzi ya esanga. Ayambaki biso malamu epai na ye, mpe tolekisaki kuna mikolo misato. Nzokande, tata ya Pibiliusi azalaki ya kolala na mbeto mpo ete azalaki kobela fievele mpe pulupulu ya makila. Polo akendeki kotala ye, akotaki na ndako na ye, asambelaki, atielaki ye maboko mpe abikisaki ye. Sima na yango, babeli mosusu ya esanga bayaki epai na ye mpe babikisamaki. 10 Boye, bapesaki biso lokumu ya ndenge na ndenge ; mpe tango tokomaki pene ya kozongela mobembo na biso, bapesaki biso biloko nyonso oyo tozalaki na yango posa mpo na mobembo.
Polo akomi na Rome
11 Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi kati na esanga. Ezalaki masuwa ya engumba Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe Polikisi* Kasitori mpe Polikisi bazali mapasa ya banzambe ya bato ya mokili ya Grese. Bato oyo basalaka na masuwa bazalaki kozwa bango lokola banzambe oyo babatelaka bango.. 12 Tosemaki na engumba Sirakize, mpe tolekisaki kuna mikolo misato. 13 Kolongwa wana, tonanaki pembeni-pembeni ya mokili mpe tokomaki na engumba Regio. Mokolo oyo elandaki, mopepe ya sude ekomaki kopepa mpe, sima na mikolo mibale, tokomaki na Puzoli. 14 Kati na engumba yango, tokutaki bandeko oyo basengaki biso ete tovanda elongo na bango poso mobimba. Ezali ndenge wana nde tokendeki na Rome. 15 Tango bandeko ya Rome bayokaki ete tokomi, bayaki kino na zando ya Apiusi mpe na esika oyo babengaka « Bandako misato, » mpo na kokutana na biso. Tango Polo amonaki bango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe azwaki lisusu molende.
16 Tango tokomaki na Rome, bapesaki Polo nzela ya kovanda ye moko na ndako ; batielaki ye soda moko mpo na kokengela ye.
Polo ateyi na Rome
17 Sima na mikolo misato, Polo abengisaki bakambi ya Bayuda mpo ete bakutana na ye. Tango basanganaki, alobaki na bango :
— Bandeko na ngai, ata nasalaki bato ya ekolo na biso ata mabe moko te, mpe nabukaki ata mobeko moko te ya bakoko na biso, bakangaki ngai na Yelusalemi mpe bakabaki ngai na maboko ya bato ya Rome. 18 Sima na bato ya Rome koyekola na mozindo likambo na ngai, bazwaki mokano ya kotika ngai, pamba te bamonaki likambo moko te ya mabe oyo ekokaki kosala ete nazwa etumbu ya kufa. 19 Kasi Bayuda basepelaki te na mokano yango ; boye nasengaki ete nakende kosamba liboso ya Sezare ; elingi koloba te ete nazalaki na likanisi ya kofunda bato ya ekolo na ngai. 20 Yango wana nasengaki komona bino mpe kosolola na bino, pamba te ezali mpo na elikya ya Isalaele nde nakangami na minyololo oyo.
21 Bayuda bazongiselaki ye :
— Biso awa, tozwaki ata mokanda moko te kowuta na Yuda na tina na yo ; mpe kati na bandeko oyo bayaki awa, moto ata moko te apesaki biso sango to ayebisaki biso likambo ya mabe na tina na yo. 22 Kasi tozali na posa ete yo moko oyebisa biso makanisi na yo, pamba te toyebi malamu ete lingomba na yo ezali kobundisama bisika nyonso.
23 Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli. 24 Bamoko bandimisamaki na nzela ya makambo oyo azalaki koloba, kasi bamosusu baboyaki kondima. 25 Tango bakomaki pene ya kozonga, bango na bango batikalaki kaka koyokana te ; bongo Polo abakisaki liloba oyo :
— Molimo Mosantu alobaki na bakoko na bino makambo ya solo tango alobaki na nzela ya mosakoli Ezayi :
26 « Kende koloba na bato oyo :
Matoyi na bino ekoyoka na pamba, bokososola te ;
miso na bino ekotala na pamba, bokomona te.
27 Pamba te mitema ya bato oyo ekomi mabanga ;
bakangi penza matoyi mpe miso na bango,
noki te miso na bango emona,
matoyi na bango eyoka,
mitema na bango esosola,
babongola mitema, mpe nabikisa bango. »
28 Yango wana, nalingi boyeba ete Nzambe atindi lobiko na Ye epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpe bakoyoka.
[ 29 Tango Polo asilisaki koloba, Bayuda bakendeki, mpe bazalaki kotiana tembe makasi kati na bango.]
30 Polo awumelaki mibu mibale mobimba kati na ndako ya kofutela. Azalaki koyamba bato nyonso oyo bazalaki koya kotala ye ; 31 azalaki kosakola sango ya Bokonzi ya Nzambe mpe koteya na tina na Nkolo Yesu-Klisto, na molende nyonso mpe na kozanga bipekiseli.

*28:11 Kasitori mpe Polikisi bazali mapasa ya banzambe ya bato ya mokili ya Grese. Bato oyo basalaka na masuwa bazalaki kozwa bango lokola banzambe oyo babatelaka bango.