Mokanda epai ya
Barome
1
Polo apesi baklisto ya Rome mbote
Polo, mowumbu ya Yesu-Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma mpe aponama mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe, Sango Malamu oyo Nzambe alaka wuta kala na nzela ya basakoli na Ye kati na Makomi ya bule, Sango Malamu oyo ezali koloba na tina na Mwana na Ye, oyo kati na bomoto na Ye, abotamaki na libota ya Davidi, mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi : Yesu-Klisto, Nkolo na biso. Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima. Boye, bino mpe bozali na molongo ya bato yango oyo Yesu-Klisto abenga.
 
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu :
 
Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
 
Polo mpe baklisto ya Rome
Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba. Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino 10 kati na mabondeli na ngai tango nyonso ; mpe nasengaka na Nzambe ete, na mikolo oyo to na mikolo oyo ekoya, apesa ngai nzela ya koya kotala bino, soki ezali mokano na Ye.
11 Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino 12 to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango. 13 Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu ; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.
14 Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba. 15 Yango wana nazali penza na posa makasi ya koteya Sango Malamu epai na bino oyo bozali na Rome.
Nguya ya Sango Malamu
16 Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka : liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki. 17 Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama : « Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. »
Bato nyonso bazali bato ya masumu
Lisumu ya bato ya bikolo ya bapaya
18 Solo, Nzambe amonisaka kanda na Ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu, na lisumu mpe na mabe nyonso ya bato oyo bazipaka bosolo na nzela ya misala na bango ya mabe, 19 pamba te makambo oyo bakoki koyeba na tina na Nzambe emonanaka polele kati na bango ; Ye moko Nzambe nde alakisa bango yango na polele. 20 Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.
21 Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili. 22 Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba. 23 Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu.
24 Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu. 25 Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen !
26 Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali mpo na komipesa na bosangisi nzoto oyo esengeli te. 27 Ndenge moko mpe mpo na mibali : batikaki kosangisa nzoto na basi, batondisamaki na posa ya kosangisa nzoto na baninga na bango mibali ; basalaki makambo ya soni, mibali na mibali, mpe bazwaki kati na bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango.
28 Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te. 29 Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi, 30 na kotiola baninga, banguna ya Nzambe, bato batonda na lolendo, na lofundu, na bilobaloba, na mayele ya kosala mabe, batomboki na miso ya baboti na bango ; 31 bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa. 32 Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.