2
Kosambisama ya sembo ezali ya Nzambe
Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ozali na ngambo, ata soki ozali nani ; pamba te wana osambisaka bato mosusu, omisambisaka yo moko, mpo ete yo oyo osambisaka bango osalaka mpe kaka makambo yango. Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana. Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana mpe osalaka makambo yango kaka lokola bango ? To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?
Kasi mpo na moto makasi na yo mpe motema libanga na yo, ozali yo moko komibendela etumbu monene mpo na mokolo oyo Nzambe akokweyisa kanda na Ye mpe akomonisa kosambisama na Ye ya sembo. Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye : bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te ; kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe. Minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe : liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki. 10 Kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka bolamu : liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki ; 11 pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
12 Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko bakokufa na kozanga mpe Mobeko. Nzokande bato oyo basalaki masumu, wana basengeli kotosa Mobeko, bakosambisama kolanda Mobeko. 13 Pamba te ezali te bato oyo bayokaka Mobeko nde bazali sembo na miso na Nzambe, kasi ezali ba-oyo batosaka Mobeko yango nde bakotangama lokola bato ya sembo. 14 Soki Bapagano oyo bayebi Mobeko te bazali kosala na ndenge na bango moko makambo oyo Mobeko esengaka, boyeba ete bamikomisaka Mobeko mpo na bango moko atako bazali na Mobeko yango te. 15 Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka. 16 Nyonso wana ekomonana polele, na mokolo oyo Nzambe akosambisa basekele ya bato na nzela ya Yesu-Klisto, kolanda Sango Malamu oyo nateyaka.
Bayuda mpe Mobeko
17 Boye, yo moto oyo omibengaka Moyuda, otiaka elikya na yo kati na Mobeko, omikumisaka mpo na Nzambe, 18 oyebi mokano ya Nzambe mpe oyebi kososola makambo oyo eleki malamu, pamba te Mobeko eteya yo. 19 Ondimisami solo ete ozali motambolisi ya bakufi miso, pole ya bato oyo bayengaka-yengaka kati na molili, 20 molakisi ya bazoba, moteyi ya bana mike, pamba te ozwaka kati na Mobeko boyebi nyonso mpe bosolo. 21 Yo moto oyo oteyaka bato mosusu, boni, yo moko omiteyaka te ? Yo oyo oteyaka bato mosusu ete bayiba te, boni, oyibaka ? 22 Yo oyo olobaka na bato ete basala ekobo te, boni, osalaka ekobo ? Yo oyo omipesaka te na banzambe ya bikeko, boni, ozwaka na makasi biloko kati na batempelo ? 23 Yo oyo omikumisaka mpo na Mobeko, boni, ozali kobebisa lokumu ya Nzambe na kobuka Mobeko ? 24 Mpo na yango, kolanda ndenge ekomama : « Likolo na bino, Kombo ya Nzambe ezali kofingama kati na Bapagano. » 25 Kokatama ngenga ezali na tina soki ozali kotosa Mobeko ; kasi soki obuki Mobeko, okomi lokola okatama na yo ngenga te. 26 Kasi soki moto oyo akatisa ngenga te azali kotosa malako ya sembo ya Mobeko, boni, akotangama te lokola moto akatama ngenga ? 27 Moto oyo akatisa ngenga te kasi atosaka Mobeko akosambisa yo oyo obukaka Mobeko atako ozali na Makomi ya Mobeko mpe okatisa ngenga. 28 Pamba te ezali te makambo oyo emonanaka na miso nde ekomisaka moto Moyuda, mpe ezali te elembo oyo emonanaka na nzoto nde esalaka kokatama ngenga. 29 Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema ; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.