3
Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini ? Kokatama ngenga ezali na tina nini ? Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.
Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe ? Soki moke te ! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama :
« Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo,
mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »
Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto. Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ? To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu ? Mpe mpo na nini toloba te : « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.
Moto ya sembo azali te
Boye, toloba nini ? Biso Bayuda toleki bato mosusu ? Te, soki moke te ! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu. 10 Kolanda ndenge ekomama :
« Moto ya sembo azali te, ata moko te ;
11 moto ya mayele azali te ;
ata moto moko te alukaka Nzambe.
12 Bango nyonso babunga nzela,
bango nyonso bamibebisa ;
moko te asalaka bolamu,
ata moko te.
13 Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama,
lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa,
bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
14 Minoko na bango etonda na makambo ya bololo
mpe na bilakeli mabe.
15 Makolo na bango epotaka mbangu
mpo na kosopa makila.
16 Na bisika nyonso oyo balekelaka,
batikaka kaka libebi mpe pasi ;
17 bayebi nzela ya kimia te.
18 Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te
na miso na bango. »
19 Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe. 20 Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
Bosembo na nzela ya kondima
21 Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango. 22 Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano, 23 pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe ; 24 mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto. 25 Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango. 26 Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.
27 Boye, tina nini komikumisa ? Tina ezali te ! Na mobeko nini ? Na mobeko ya misala ? Te, kasi na nzela ya kondima. 28 Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te. 29 Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda ? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te ? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya. 30 Pamba te Nzambe azali kaka moko ; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo. 31 Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.