4
Abrayami akomaki sembo mpo na kondima na ye
Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso ? Azwaki nini na bomoto ? Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa ; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te ! Makomi elobi nini ? « Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe, yango wana Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. »
Soki moto asali mosala, batangaka lifuti na ye lokola likabo te, kasi lokola motoki na ye. Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo. Davidi mpe alobaki bongo tango atatolaki esengo ya moto oyo Nzambe akomisi sembo na kozanga misala :
« Esengo na bato
oyo mabe na bango elimbisami,
mpe masumu na bango elongwe !
Esengo na moto
oyo Nkolo atangelaka lisumu te ! »
Boni, esengo yango ezali kaka mpo na bato oyo bakatisa ngenga to ezali mpe mpo na bato oyo bakatisa ngenga te ? Solo, tozali koloba : Mpo ete Abrayami azalaki na kondima, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. 10 Esalemaki tango nini ? Esalemaki liboso na ye kokatisa ngenga to sima na ye kokatama ngenga ? Esalemaki te sima na ye kokatama ngenga ; esalemaki nde liboso na ye kokatisa ngenga. 11 Nzambe apesaki ye elembo ya kokatama ngenga lokola kashe ya bosembo oyo azwaki na nzela ya kondima, wana azalaki akatama nanu ngenga te. Boye akoma na mbala moko tata ya bato nyonso oyo bandimaka, wana bazali bakatama ngenga te mpo ete bango mpe bakoma bato ya sembo, 12 mpe tata ya bato oyo bakatisa ngenga, ba-oyo bakatama ngenga kaka te, kasi balandaka mpe ndakisa ya kondima oyo Abrayami, tata na biso, azalaki na yango liboso ete bakata ye ngenga.
13 Ezali na nzela ya Mobeko te nde Abrayami mpe bakitani na ye bapesamelaki elaka ya kozwa mokili lokola libula, kasi ezali nde na nzela ya bosembo oyo ewutaka na kondima. 14 Pamba te soki ezali bato oyo batosaka mibeko nde bakozwa libula yango, wana kondima ezali lisusu na tina te mpe elaka ezali te, 15 pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.
16 Yango wana, elaka eyaka na nzela ya kondima, mpo ete ezala na nzela ya ngolu mpe mpo ete ezala mpo na bakitani nyonso ya Abrayami : kaka te mpo na ba-oyo babengami bakitani na nzela ya Mobeko, kasi mpe mpo na ba-oyo bazali na kondima ya Abrayami oyo azali tata na biso nyonso, 17 kolanda ndenge ekomama : « Nakomisaki yo tata ya bikolo ebele. » Azali tata na biso na miso ya Nzambe oyo ye andimaki, Nzambe oyo apesaka bomoi epai ya bakufi mpe azalisaka biloko oyo etikala kozala te.
18 Atako Abrayami akokaki lisusu te kotia elikya, kasi atiaki kaka elikya mpe andimaki ; boye akomaki tata ya bikolo ebele, kolanda ndenge Nzambe aloba mpo na ye : « Bakitani na yo bakozala ebele. » 19 Abrayami akomaki na mibu pene nkama moko, kasi kondima na ye elembaki te atako atalaki nzoto na ye, oyo ezalaki lisusu na makasi te, mpe nzoto ya Sara oyo akokaki lisusu kobota te. 20 Nzokande, na esika ete atia tembe na elaka ya Nzambe mpe aboya kondima, kasi kondima na ye epesaki ye lisusu makasi koleka mpe azalaki kopesa Nzambe nkembo, 21 wana andimisamaki makasi ete Nzambe azali na makoki ya kokokisa elaka na Ye. 22 Yango wana, mpo na kondima na ye, Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo. 23 Nzokande, ezali mpo na ye moko kaka te nde ekomama : « Nzambe atangaki ye lokola moto ya sembo ; » 24 ezali mpe mpo na biso oyo Nzambe akotanga lokola bato ya sembo mpo ete tondimelaka Ye oyo asekwisaki, kati na bakufi, Yesu, Nkolo na biso, 25 oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.