5
Kimia elongo na Nzambe
Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto oyo na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo kati na yango tozali kowumela mpe tozali komikumisa kati na elikya ete tokobika nkembo ya Nzambe. Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya. Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.
Solo, wana tozalaki nanu bato na bolembu, Klisto akufaki mpo na bato ya masumu, na tango oyo Nzambe abongisaki. Ezali pasi komona moto kondima kokufa mpo na moto ya sembo ; tango mosusu, moto akoki kondima kokufa mpo na moto ya malamu. Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.
Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe. 10 Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye. 11 Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.
Adamu mpe Yesu-Klisto
12 Yango wana, ndenge lisumu ekotaki na mokili na nzela ya moto moko, mpe kufa na nzela ya lisumu, ndenge wana mpe kufa ekangaki bato nyonso na nzela ya lisumu, pamba te bato nyonso basalaki masumu.
13 Solo, liboso ete Nzambe apesa Mobeko, lisumu ezalaki kati na mokili, kasi lisumu ekoki kotangama te soki Mobeko ezali te. 14 Nzokande, wuta na tango ya Adamu kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki na bokonzi ata epai ya bato oyo basalaki masumu te, na lolenge ya Adamu oyo abukaki mobeko mpe azali elilingi ya moto oyo asengelaki koya.
15 Kasi ezali na bokeseni monene kati na likabo ya ofele ya Nzambe mpe lisumu ! Pamba te soki lisumu ya moto moko ememelaki bato ebele kufa, ngolu ya Nzambe mpe likabo ya ofele oyo eyaki na nzela ya ngolu ya moto moko, Yesu-Klisto, efulukaki meke mpo na bato ebele. 16 Likabo ya Nzambe ezali na motuya makasi koleka mabe ya lisumu ya moto moko : likolo ya lisumu moko, kosambisama eyei mpe ememi etumbu ; kasi likolo ya masumu ebele, likabo ya ngolu eyei mpe elongoli etumbu. 17 Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko !
18 Na mokuse, ndenge mabe ya moto moko ememelaki bato nyonso etumbu, ndenge wana mpe mosala ya moto moko mpo na kokokisa bosembo ememeli bato nyonso bonsomi mpe bomoi. 19 Pamba te ndenge kozanga botosi ya moto moko ekomisaki bato ebele bato ya masumu, ndenge wana mpe botosi ya moto moko ekomisi bato ebele bato ya sembo.
20 Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka 21 mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.