2
Etumbu mpo na bato ya Moabi
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomi
mpe bakomisaki yango putulu.
Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi,
mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti,
oyo batonga makasi.
Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi,
na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.
Nakobebisa mokonzi na yango
mpe nakoboma ye elongo na bakalaka na ye, »
elobi Yawe.
Etumbu mpo na bato ya Yuda
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te babwakaki Mobeko na Ngai,
babatelaki te bikateli na Ngai
mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta
oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda,
mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi,
oyo batonga makasi. »
Etumbu mpo na bana ya Isalaele
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te batekaki bato ya sembo
mpo na kozwa kaka palata,
mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
Bazali konyata mito ya babola
ndenge banyataka putulu ya mabele,
mpe bazali kokata na bosembo te
makambo ya bato bakelela.
Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto
na mwasi moko ya makangu ;
mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.
Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba
oyo bazwi na ndanga ;
mpe kati na ndako ya nzambe na bango,
bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.
Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango,
atako bazali milayi lokola banzete ya sedele
mpe makasi lokola banzete ya sheni.
Nabebisaki bambuma na yango na likolo,
mpe misisa na yango na se.
10 Nabimisaki bino na Ejipito
mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe
mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.
11 Kati na bana na bino ya mibali,
nabimisaki basakoli ;
mpe kati na bilenge mibali na bino,
nabimisaki banaziri* Naziri elingi koloba : moto oyo amikaba epai na Yawe na ndayi ya komela masanga te mpe kokata suki te..
Oh bana ya Isalaele, boni, ezali solo te ? »
elobi Yawe.
12 « Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga
mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.
13 Sik’oyo, nakonyata bino ndenge shar
oyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.
14 Moto oyo aleki na mbangu akobika te,
moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te,
mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.
15 Mobeti tolotolo akolonga te,
soda ya mpiko akokoka kokima te,
mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda
akobikisa bomoi na ye te ;
16 ezala basoda oyo baleki makasi,
bakokima bolumbu na mokolo wana, »
elobi Yawe.

*2:11 Naziri elingi koloba : moto oyo amikaba epai na Yawe na ndayi ya komela masanga te mpe kokata suki te.