Amosi
1
Etumbu ya bikolo ya zingazinga ya Isalaele
Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.
Alobaki :
Yawe azali koganga wuta na Siona,
mpe azali koloba wuta na Yelusalemi,
na mongongo makasi lokola kake.
Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele
baleisaka bibwele ekokawuka,
mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.
Etumbu mpo na bato ya Siri
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Damasi,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te bakataki-kataki bato ya Galadi
na nzela ya bibende oyo etimolaka mabele
mpo na kosala bilanga.
Nakotia moto na ndako ya mokonzi Azaeli,
mpe moto yango ekozikisa bandako ya mokonzi Beni-Adadi,
oyo batonga makasi.
Nakobuka ekuke ya Damasi,
nakobebisa mokonzi ya bavandi ya Lubwaku ya Beti-Aveni,
mpe oyo azali kokonza na Beti-Edeni ;
mpe bato ya Siri bakokende na bowumbu na Kiri, »
elobi Yawe.
Etumbu mpo na bato ya Filisitia
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Gaza,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te bamemaki bikolo ebele na bowumbu
mpe batekaki bango na Edomi.
Nakotia moto na bamir ya Gaza,
mpe moto yango ekozikisa bandako na yango, oyo batonga makasi.
Nakoboma mokonzi ya bavandi ya Asidodi
mpe oyo azali kokonza na Ashikeloni.
Nakobalukela engumba Ekroni
kino tango moto ya suka kati na bato ya Filisitia akokufa, »
elobi Nkolo Yawe.
Etumbu mpo na bato ya Fenisi
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Tiri,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te bakabaki bato ebele
na bowumbu epai ya bato ya Edomi
mpe batosaki te boyokani ya bondeko.
10 Nakotia moto na bamir ya engumba Tiri,
mpe moto yango ekozikisa bandako na yango,
oyo batonga makasi. »
Etumbu mpo na bato ya Edomi
11 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Edomi,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te balandaki bandeko na bango na mopanga,
bayokelaki bango mawa te,
kanda na bango ezalaki tango nyonso komata,
mpe bayina bango wuta kala.
12 Nakotia moto na engumba Temani,
mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira,
oyo batonga makasi. »
Etumbu mpo na bato ya Amoni
13 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Likolo ya masumu misato to minei ya Amoni,
nakozanga te kopesa bango etumbu,
pamba te bapasolaki mabumu ya basi ya zemi ya Galadi
mpo na koyeisa mokili na bango monene.
14 Nakotia moto na bamir ya engumba ya Raba,
mpe moto yango ekozikisa bandako na yango,
oyo batonga makasi,
kati na koganga na mokolo ya bitumba,
kati na mopepe makasi na mokolo ya ekumbaki.
15 Mokonzi na bango akokende na bowumbu,
ye elongo na bakalaka na ye, »
elobi Yawe.