4
Nzambe akosambisa bikolo
« Na mikolo mpe na tango wana,
tango nakozongisa bakangami ya Yuda mpe ya Yelusalemi,
nakosangisa bato ya bikolo nyonso
mpe nakokitisa bango na lubwaku ya Jozafati.
Nakosambisa bango kuna
na tina na libula na Ngai, Isalaele, bato na Ngai ;
pamba te bapanzi bato na Ngai kati na bikolo
mpe bakaboli mokili na Ngai.
Babeti zeke mpo na kokabola bato na Ngai,
bapesi bilenge mibali basi ya ndumba,
bateki bilenge basi mpo na kozwa kaka vino,
mpe balangwe yango.
Eh bongo bino, Tiri mpe Sidoni,
bituka ya bato ya Filisitia,
likambo nini lisusu kati na Ngai mpe bino ?
Bolingi kozongisela Ngai mabe to kotombokela Ngai ?
Soki yango nde ezali makanisi na bino,
Ngai nde nasengeli kozongisela bino mabe na lombangu.
Pamba te bozwaki palata mpe wolo na Ngai,
bomengo na Ngai ya motuya makasi
mpe bomemaki yango na batempelo na bino.
Botekaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai ya Bagreki
mpo na komema bango mosika ya mokili na bango.
Ngai moko nakopesa bango makasi
mpo ete babima na bisika nyonso
epai wapi botekaki bango.
Nakoteka bana na bino ya mibali mpe ya basi
epai ya bato ya Yuda,
mpe bango bakoteka bango epai ya bato ya Sabe,
ekolo ya mosika penza, »
elobi Yawe.
Etumbu mpe kosambisama
« Bosakola likambo oyo kati na bikolo :
Bobulisa mampinga mpo na bitumba !
Bolamusa bilombe !
Tika ete bilombe nyonso ya bitumba bapusana mpe baya !
10 Bosala mipanga, na nzela ya bakongo na bino ;
mpe makonga, na nzela ya bipasola na bino !
Tika ete moto na bolembu aloba :
‹ Nazali makasi. ›
11 Bino bikolo nyonso ya zingazinga,
boya na lombangu mpe bosangana !
 
Oh Yawe, kitisa bilombe na Yo !
 
12 Tika ete bikolo nyonso elamuka mpe emata
kino na lubwaku ya Jozafati !
Pamba te kuna nde nakovanda mpo na kosambisa
bikolo nyonso ya zingazinga.
13 Bosimba bambeli, pamba te bambuma eteli.
Boya, bokamola bambuma ya vino,
pamba te ekamolelo etondi,
banzungu etondi,
mabe na bango eleki ndelo.
14 Bato bazali ebele, ebele penza,
na lubwaku ya kosambisama.
Mokolo ya Yawe ekomi pene,
na lubwaku ya kosambisama.
15 Sanza mpe moyi ekoyinda,
minzoto ekongenga lisusu te.
16 Wuta na Siona, Yawe akoloba makasi ;
wuta na Yelusalemi, akoloba na mongongo makasi lokola kake ;
Lola mpe mabele ekoningana.
Kasi Yawe akozala ekimelo mpo na bato na Ye,
engumba batonga makasi mpo na bana ya Isalaele.
Yawe apamboli bato na Ye
17 Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino ;
navandaka na Siona, ngomba na Ngai ya bule.
Yelusalemi ekozala engumba ya bule,
bapaya bakolekela lisusu wana te.
18 Na mokolo wana, bangomba ekotangisa vino ya sika,
mpe miliki ekotanga na bangomba mikuse.
Miluka nyonso ya Yuda ekotonda na mayi,
etima moko ya mayi ekobima wuta na Tempelo ya Yawe
mpe ekosopela lubwaku ya banzete ya akasia mayi.
19 Kasi mokili ya Ejipito ekobebisama,
mokili ya Edomi ekokoma esobe
mpo na makambo mabe oyo basalaki epai ya bato ya Yuda,
pamba te basopaki makila ya bato ya Yuda
na mabele na bango, atako basalaki mabe te.
20 Bato bakokoma kovanda na mokili ya Yuda mpo na libela,
mpe na engumba Yelusalemi, libela na libela.
21 Nakopetola bino mpo na ngambo ya makila,
mpo ete nanu napetola bino te. »
Yawe akovanda na Siona.