8
Kitunga ya bambuma etela
Tala makambo oyo Nkolo Yawe alakisaki ngai : kitunga etonda na bambuma etela. Atunaki ngai :
— Amosi, ozali komona nini ?
Nazongisaki :
— Nazali komona kitunga etonda na bambuma etela.
Yawe alobaki na ngai :
— Tango ekoki mpo na bato na Ngai, Isalaele ;
pamba te nakolimbisa bango lisusu te.
Na mokolo wana, banzembo ya esengo kati na bandako
ekobongwana bileli, elobi Nkolo Yawe.
Bakobwaka bibembe ebele bipai na bipai
mpe bakosalela bango matanga te.
Bato ya mombongo ya lokoso
Boyoka makambo oyo,
bino bato oyo bonyokolaka bato bakelela
mpe bonyataka babola kati na mokili.
Bozali koloba : « Feti ya ebandeli ya sanza ekoleka tango nini
mpo ete toteka ble na biso ?
Tango nini mokolo ya Saba ekosila
mpo ete tofungola bibombelo na biso ya ble ? »
Tokosalela bakopo ya mike
mpo ete tomatisa talo,
mpe tokosalela bimekelo ya lokuta.
Tokosomba mobola na palata
mpe moto akelela na motuya ya mapapa mibale,
bongo tokoteka ata basalite ya ble.
Mpo na lolendo ya Jakobi,
Yawe alapi ndayi na maloba oyo :
« Nakobosana misala na bango ata moko te.
 
Mpo na yango, mokili ekolenga,
mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga.
Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili
oyo etondi na mayi ;
ekokoma koningana-ningana
mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.
Mokolo ya matanga
Na mokolo wana, »
elobi Nkolo Yawe,
« nakosala ete moyi elala na midi,
mpe nakoyeisa molili na mokili na moyi makasi.
10 Nakokomisa mikolo ya bafeti na bino mikolo ya matanga,
banzembo na bino ya esengo banzembo ya mawa.
Nakosala ete bino nyonso bolata basaki,
mpe bakokokola bino suki ya moto.
Nakoyeisa matanga kati na mokili
lokola matanga ya libota oyo esili kokufisa
mwana se moko oyo bazalaki na ye,
mpe suka na yango ekozala bobele se pasi makasi.
 
11 Na mikolo ekoya, »
elobi Nkolo Yawe,
« nakotinda nzala makasi kati na mokili ;
ekozala te nzala ya bilei to posa ya mayi,
kasi ekozala nzala ya koyoka Liloba na Yawe.
12 Bato bakotelengana na bibale nyonso,
bakoyengayenga longwa na nor kino na este
mpo na koluka Liloba na Yawe,
kasi bakotikala komona yango te.
 
13 Na mokolo wana,
bilenge basi ya kitoko mpe mibali ya makasi bakokufa
na posa ya mayi.
14 Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe
ya ekeko ya Samari mpe balobaka :
‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi ›
to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, ›
bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »