9
Kobebisama ya Esika ya bule
Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki :
« Buka makonzi ya Tempelo
mpo ete ndako mobimba eningana
mpe ekweyela bato nyonso na mito.
Bato oyo bakotikala,
nakoboma bango na mopanga.
Moko te akokima, moko te akobika.
Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi,
loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ;
soki bakimi na Lola,
nakokitisa bango na se.
Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli,
nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se ;
soki babombami Ngai na se ya ebale monene,
nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu,
nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna.
 
Miso na Ngai ekozala likolo na bango
mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.
 
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele,
mabele eninganaka,
mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga,
mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili
mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola
mpe atia miboko na yango na mabele ;
abengaka mayi ya ebale monene
mpe asopaka yango na etando ya mabele.
Kombo na Ye ezali : Yawe.
Etumbu ya bato nyonso ya masumu
Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te
na bato ya mokili ya Kushi ? »
elobi Yawe.
« Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito,
bato ya Filisitia wuta na Kreti,
bato ya Siri wuta na Kiri ?
 
Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu ;
nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele.
Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, »
elobi Yawe.
 
« Pamba te nakopesa mitindo
mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso
ndenge bayungolaka ble ;
bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
10 Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai
bakokufa na mopanga,
ba-oyo nyonso balobaka : ‹ Pasi ekotikala te
kozwa to kokomela biso ! ›
Tango ya lobiko
11 Na mokolo wana,
nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya,
nakobamba madusu na yango,
nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana
mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,
12 mpo ete bakoka kozwa
ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki,
mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, »
elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.
 
13 « Mikolo ezali koya, »
elobi Yawe,
« mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki,
mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki.
Vino ya sika ekobota na bangomba milayi
mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.
14 Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai,
oyo bakendeki na bowumbu,
mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki
mpe bakovanda kati na yango.
Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango,
bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.
15 Nakolona bango na mabele na bango moko,
mpe bakotikala kopikola bango lisusu te
na mabele oyo napesaki bango, »
elobi Yawe, Nzambe na yo.