Abidiasi
1
EMONISELI YA MOSAKOLI ABIDIASI
Etumbu ya mokili ya Edomi
Emoniseli ya mosakoli Abidiasi.
 
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi :
« Toyoki sango moko kowuta na Yawe ;
mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba :
‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›
 
Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo,
mpe okosambwa makasi.
Lolendo ya motema na yo ekosaki yo,
yo movandi ya madusu ya mabanga,
yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba
mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›
Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo
mpe otongi zala na yo kati na minzoto,
nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, »
elobi Yawe.
 
« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu,
likama ya ndenge nini ezali kozela yo ?
Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te ?
Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo,
boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino ?
Kasi tala ndenge babimeli Ezawu !
Babotoli ye biloko na ye ya motuya oyo ebombama !
Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani
ekobengana yo na mokili na yo ;
baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo.
Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo.
Kasi yo, okoyeba yango te
mpo ete okozala lisusu na mayele te.
 
Na mokolo wana, »
elobi Yawe,
« nakoboma bato ya bwanya ya Edomi
mpe nakolongola bato ya mayele
na etuka ya bangomba ya Ezawu.
Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo,
mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga !
10 Mpo na mabe oyo osalaki Jakobi, ndeko na yo,
okotonda na soni
okobebisama mpo na libela.
11 Ozalaki kotala kaka bongo
tango bato mosusu bazalaki kokende
mpe komema bozwi na ye nyonso.
Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye,
babetaki zeke mpo na kokabola
bomengo ya bitumba ya Yelusalemi.
Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
 
12 Nzokande, osengelaki te kosepela
komona pasi ya ndeko na yo
to kosepela komona kobebisama ya bato ya Yuda
to mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.
13 Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngai
na mokolo ya pasi na bango
to kosepela komona kobebisama na bango
to mpe kobotola bozwi na bango nyonso
na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
14 Osengelaki te kotelema na esika oyo banzela ekutana
mpo na koboma bato na bango, oyo bazalaki kokima pasi
to mpe kokaba na maboko ya banguna bato na bango,
oyo babikaki na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
 
15 Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso.
Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki,
bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.
16 Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule,
ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso ;
bakomela, bakomela lisusu koleka
mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.
17 Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona ;
ngomba yango ekokoma lisusu bule,
mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.
18 Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto,
libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto.
Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti,
bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango.
Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, »
elobi Yawe.
 
19 Bato oyo bakowuta na Negevi
bakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu,
mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwaku
bakozwa mokili ya bato ya Filisitia.
Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari,
mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi.
20 Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu
bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita ;
bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi
bakozwa bingumba ya Negevi.
21 Babikisi bakomata na ngomba Siona
mpo na koyangela bangomba ya Ezawu,
mpe Yawe akokoma Mokonzi.