Yona
1
Yona akimi
Yawe alobaki na Yona, mwana mobali ya Amitayi :
— Telema, kende na Ninive, engumba monene, mpe kebisa bato na yango, pamba te mabe na bango ekomi kino epai na ngai.
Yona atelemaki. Kasi mpo na kokima mosika na Yawe, akendeki na Tarsisi, akitaki na libongo ya Jafa mpe akutaki kuna masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarsisi. Sima na ye kofuta mbongo mpo na mobembo, akotaki na masuwa yango mpo na kokende na Tarsisi, mosika na Yawe.
Kasi Yawe atindaki mopepe makasi na likolo ya ebale monene, mpe mopepe yango ememaki mbonge oyo ekomaki pene ya kozindisa masuwa. Bato oyo basalaka na masuwa bakomaki kobanga, mpe moto na moto akomaki kobelela nzambe na ye ; babwakaki biloko nyonso oyo bazalaki na yango na ebale monene mpo na kokomisa masuwa pepele. Kasi Yona akitaki na kobe ya masuwa mpe, kuna, alalaki pongi ya makasi. Mokumbi masuwa apusanaki pene ya Yona mpe alobaki na ye :
— Ndenge nini okoki penza kolala pongi boye ? Telema mpe belela nzambe na yo, tango mosusu akoki koyokela biso mawa mpo ete tokufa te.
Bato oyo basalaka na masuwa bamilobelaki bango na bango : « Boya ! Tobeta zeke mpo toyeba moto oyo azali kobendela biso pasi oyo. »
Babetaki zeke, mpe zeke yango ekweyaki epai ya Yona. Batunaki ye :
— Yebisa biso nani azali kobendela biso pasi oyo ? Osalaka nini ? Owuti wapi ? Mboka na yo nini, mpe ozali moto ya ekolo nini ?
Yona azongisaki :
— Nazali Mo-Ebre, nasambelaka Yawe, Nzambe ya Lola, oyo akela bibale mpe mokili.
10 Ayebisaki bango ete azali kokima mosika na Yawe. Boye bato yango babangaki makasi ; batunaki ye :
— Eloko nini osalaki kuna ?
11 Lokola ebale ezalaki kotomboka makasi penza, batunaki ye lisusu :
— Tosala yo nini mpo ete ebale evanda kimia mpe etika kotungisa biso ?
12 Azongiselaki bango :
— Bokamata ngai mpe bobwaka ngai na ebale monene, mpe yango ekovanda kimia, pamba te nayebi malamu ete ezali mpo na ngai nde mopepe makasi oyo etelemeli bino.
13 Bato yango bamipesaki nanu na koluka nkayi, na makasi na bango nyonso, mpo na komema masuwa na mokili, kasi balongaki te, pamba te mopepe etelemelaki bango makasi. 14 Bongo, babelelaki Yawe :
« Oh Yawe, tobondeli Yo,
koboma biso te likolo ya moto oyo.
Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te
etangama na mito na biso.
Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »
15 Boye, bakamataki Yona mpe babwakaki ye na ebale monene ; mpe mbala moko, ebale monene oyo etombokaki makasi evandaki kimia. 16 Babangaki mpe bayokaki somo makasi liboso ya Yawe ; babonzelaki Ye bambeka mpe bapesaki Ye bilaka.