Ezekieli
Kosambisama ya Yelusalemi
1
Emoniseli ya nkembo na Yawe
Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe.
Kaka na mokolo ya mitano ya sanza ya mobu wana, elingi koloba mobu ya mitano ya bowumbu ya mokonzi Yeoyakini, Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye.
Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto. Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto. Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei. Makolo na yango ezalaki esembolama, matambe na yango ezalaki lokola matambe ya mwana ngombe ya mobali mpe ezalaki kongenga lokola bronze oyo bapetola na moto. Na se ya mapapu na yango, na bangambo na yango minei, ezalaki na maboko minei lokola maboko ya bato ; mpe bikelamu nyonso minei ya bomoi ezalaki na bilongi mpe na mapapu na yango. Mapapu na yango ezalaki kotutana moko na mosusu. Ekelamu moko na moko ezalaki kokende etala kaka na liboso mpe ezalaki kotala na sima te. 10 Tala ndenge bilongi na yango ezalaki : ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso) : elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima). 11 Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo ; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale : lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu ; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango. 12 Moko na moko ezalaki kokende kaka liboso ; ezalaki kokende bisika nyonso oyo Molimo azalaki kokamba yango mpe ezalaki kokende epai mosusu te.
13 Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango. 14 Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali.
15 Tango nazalaki kotala bikelamu yango, namonaki pine moko na mabele, pembeni ya ekelamu ya bomoi moko na moko, liboso ya bilongi na yango minei. 16 Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango : ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana ; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu. 17 Tango ekelamu moko na moko ezalaki kotambola, ezalaki kokende na ngambo oyo moko ya bilongi na yango ekotala, kati na bangambo na yango minei ; ezalaki kobaluka na ngambo mosusu te mpe bapine na yango ezalaki kotengama te soki bikelamu yango ezali kotambola. 18 Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo : nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango. 19 Tango bikelamu ya bomoi ezalaki kotambola, bapine mpe ezalaki kotambola pembeni na yango ; kasi soki epumbwe longwa na se, bapine mpe ezalaki kopumbwa. 20 Esika nyonso Molimo azalaki kokende, bikelamu yango mpe ezalaki kokende ; bongo bapine mpe ezalaki komata elongo na yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine. 21 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, yango mpe ezalaki kotambola ; soki etelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki epumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bikelamu yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine.
22 Likolo ya mito ya bikelamu yango ya bomoi ezalaki na eloko moko lokola mapata ya likolo, oyo ezalaki kongenga makasi lokola libanga ya talo oyo ya krisitali. 23 Na se ya mapata yango, mapapu na yango ezalaki esembolama mpe etutana na mapapu ya baninga na yango ; mpe moko na moko kati na bikelamu yango ezalaki na mapapu mibale oyo ezalaki kobomba nzoto na yango. 24 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango.
25 Na likolo ya mito na yango, mongongo moko ezalaki koyokana wuta na likolo ya mapata oyo ezalaki ; tango ezalaki kotelema, ezalaki mpe kokitisa mapapu na yango. 26 Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri ; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto. 27 Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto ; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango. 28 Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai.