2
Kobengama ya mosakoli Ezekieli
Alobaki na ngai : « Mwana na moto, telema na makolo na yo ; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. »
Wana azalaki nanu koloba, Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai ; bongo nakomaki koyoka Ye koloba na ngai. Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai. Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango.
Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto* Koto, na esika oyo, elakisi : nyama oyo babengaka, na lifalanse, scorpion. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki. Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.
Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo ! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo ! »
Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama. 10 Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi.

*2:6 Koto, na esika oyo, elakisi : nyama oyo babengaka, na lifalanse, scorpion