Bomoi kati na Molimo
5
Tozali na bonsomi kati na Klisto
Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
Ngai Polo, nazali koloba na bino ete soki bokatisi ngenga, Klisto akozala lisusu na tina te epai na bino. Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo akatisi ye moko ngenga ete asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mobeko etindaka. Bino oyo bolukaka kokoma sembo na nzela ya kotosa mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto, bozali lisusu na se ya ngolu ya Nzambe te.
Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima. Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
Bozalaki kopota mbangu malamu ! Bongo nani apengwisi bino mpo ete botika kotosa bosolo ? Likanisi ya boye ewuti te epai ya Ye oyo abengaki bino. Mwa levire moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa. 10 Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te ; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani. 11 Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu ? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te. 12 Boye tika ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino bamilongola ata banzoto ya mibali !
Molimo mpe nzoto ya masumu
13 Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino. 14 Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » 15 Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.
16 Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino. 17 Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala. 18 Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.
19 Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite, 20 kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana, 21 likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
22 Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, 23 boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo. 24 Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango. 25 Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo. 26 Tozala bato ya lolendo te, totumbolana te mpe toyokelana zuwa te.