6
Kosala bolamu mpo na bato nyonso
Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te. Bomemisana mikumba bino na bino ; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto. Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko. Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye ! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te ; pamba te moto na moto akosamba mpo na misala na ye moko.
Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.
Bomikosa te : Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka. Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko.
Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
10 Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
 
Makebisi ya suka mpe mbote
11 Botala ndenge nakomeli bino na makomi ya minene ! Nasaleli loboko na ngai moko mpo na kokoma yango.
 
12 Bato oyo balingaka koyebana na miso ya bato batindaka bino na makasi kokatisa ngenga, mpo ete banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto. 13 Pamba te bango moko bato oyo bakatisaka ngenga batosaka Mobeko te, kasi balingi kaka ete bokatisa ngenga mpo ete bamikumisa na tina na bomoto na bino.
14 Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili. 15 Ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te nde ezali na tina ; likambo ya tina ezali : kokoma ekelamu ya sika.
16 Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe epesamela bato nyonso oyo bakobanda kotambola kolanda mobeko oyo, mpe epesamela Isalaele ya Nzambe !
 
17 Kobanda lelo, tika ete moto moko te apesa ngai lisusu pasi na motema, pamba te nazali komema bilembo ya bapota ya Yesu kati na nzoto na ngai.
 
18 Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na bino ! Amen !