2
Isalaele abosani Nzambe
Yawe alobaki na ngai :
« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi :
 
Tala liloba oyo Yawe alobi :
‹ Nakanisi lisusu bolingo
oyo ozalaki na yango epai na Ngai
tango ozalaki elenge ;
ozalaki kolinga Ngai makasi
ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka,
mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe,
kati na mokili oyo ekawuka.
Isalaele abulisamaki mpo na Yawe
lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye :
moto nyonso oyo azalaki kolia yango
azalaki komema ngambo,
mpe pasi ezalaki kokomela ye, › »
elobi Yawe.
 
Oh libota ya Jakobi, bino bituka nyonso ya Isalaele,
boyoka Liloba na Yawe !
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai
mpo ete basundola Ngai ?
Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina,
mpe bango moko bakomaki bato pamba.
Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe
oyo abimisaki biso na Ejipito
mpe amemaki biso kati na esobe ?
Wapi Yawe oyo atambolisaki biso
na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu,
mokili ya molili mpe ya kufa,
mokili oyo baleki nzela balekelaka te
mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? ›
Namemaki bino na mokili
oyo mabele na yango ebotaka malamu
mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ;
kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo
mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele.
Banganga-Nzambe bamitunaki te
mpo na koluka koyeba :
‹ Yawe azali wapi ? ›
Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te,
bakambi batombokelaki Ngai ;
basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala
mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
Yango wana, nakosambisa bino, »
elobi Yawe.
« Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino,
10 Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi
mpe botala malamu,
botinda bato na Kedari mpe botala malamu ;
botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.
11 Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango
mpo na kosambela banzambe mosusu ?
Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te.
Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango
mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.
12 Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo
mpe epesa yo somo makasi, »
elobi Yawe.
13 « Bato na Ngai basali masumu mibale :
Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi,
mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi,
mabulu oyo ekawukaka noki.
14 Boni, Isalaele azali solo mowumbu
to abotama kati na ndako ya bowumbu ?
Mpo na nini akomi lokola eloko pamba
na miso ya bikolo mosusu ?
15 Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye,
ekomisaki mokili na ye lokola esobe ;
batumbaki bingumba na ye
mpe etikalaki lisusu na bato te.
16 Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine
babuki moto na yo.
17 Mpo na nini makambo oyo nyonso ezali kokomela yo ?
Boni, ezali te mpo ete osundulaki Yawe, Nzambe na yo,
tango azalaki nanu kotambolisa yo na nzela ?
18 Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi
ya ebale Nili kati na Ejipito ?
Mpo na nini ozali kokende komela mayi
ya ebale Efrate kati na Asiri ?
19 Mabe na yo ekomemela yo etumbu,
kotomboka na yo ekomemela yo pamela.
Tala malamu mpe sosola
ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo
kosundola Yawe, Nzambe na yo,
mpe kozanga kotosa Ngai, »
elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
 
20 « Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo
mpe kokata minyololo na yo.
Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. ›
Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi
mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu
lokola mwasi ya ndumba.
21 Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino
mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te.
Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai
mpe okomi nzete oyo nayebi te,
nzete oyo ebotaka mbuma mabe ?
22 Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni
to omipakoli sabuni ndenge nini,
masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, »
elobi Nkolo Yawe.
23 « Ndenge nini okoki penza koloba :
‹ Namikomisi na ngai mbindo te,
nazali kolanda banzambe ya Bala te ? ›
Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku
mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala.
Okomaki lokola shamo ya mwasi
oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ;
24 lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe,
oyo ebendaka mopepe na zolo
soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto.
Bongo, nani akoki kokanga posa na yango
ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali ?
Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango
ekomona pasi te,
pamba te ekozwa yango na tango ya posa
ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali.
25 Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu
mpe okokawuka mongongo
likolo ya bitambola-tambola !
Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo !
Ngai nalingaka banzambe ya bapaya
mpe nakolanda kaka bango. ›
 
26 Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye,
ndenge wana mpe ekosalema
mpo na libota ya Isalaele :
bakonzi mpe bakambi na bango,
Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa.
27 Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, ›
mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. ›
Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te.
Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka :
‹ Yaka kobikisa biso ! ›
28 Wapi sik’oyo banzambe na bino,
banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ?
Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi,
soki penza ekokoka !
Pamba te, oh bato na Yuda,
ndenge motango ya bingumba na bino ezali,
ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali.
 
29 Mpo na nini bozali kosambisa Ngai ?
Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, »
elobi Yawe.
30 « Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ;
pamba te bazwaki na bango kaka mayele te.
Mopanga na yo ebomi basakoli na yo
ndenge nkosi ebomaka bato.
31 Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe :
Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi
mpo na mokili ya Isalaele ?
Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba :
‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi
mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›
32 Boni, elenge mwasi abosanaka penza
biloko na ye ya monzele ?
Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ?
Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele.
33 Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo !
Na etamboli na yo, okoki ata kopesa
mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe !
34 Kino na bilamba na yo,
bato bamonaka makila ya babola,
ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te.
35 Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba :
‹ Nayebi ata likambo moko te,
kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. ›
Kasi Ngai nakopesa yo etumbu
mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›
36 Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ?
Okosambwa mpo na Ejipito
ndenge osambwaki mpo na Asiri.
37 Okotika lisusu esika yango, maboko na moto,
pamba te Yawe asundoli bato
oyo ozalaki kotiela motema ;
mpe bango bakosunga yo te. »