3
Mwasi ya ndumba
« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye,
mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ;
boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ?
Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ?
Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele,
bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, »
elobi Yawe.
« Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala :
Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ?
Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu,
ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe.
Boye, okomisaki mokili mbindo
na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe.
Yango wana, mvula ekangamaki,
mpe mvula ya sima enokaki lisusu te.
Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo
mpe oboyi koyoka soni.
Boni, obengaka Ngai te :
‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana ! ›
Ozali kutu kotuna Ngai :
‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ?
Kotomboka na yo ekosila te ? ›
Yango nde makambo ozali koloba,
kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. »
Isalaele apengwi nzela ya Yawe
Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba. Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango. Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba. Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete. 10 Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.
11 Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda. 12 Kende kosakola sango oyo na nor :
‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, ›
elobi Yawe,
‹ Nakokangela yo lisusu elongi te,
pamba te nazali Moyengebene, ›
elobi Yawe.
‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela.
13 Ndima kaka mabe na yo,
mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ;
obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya,
na se ya banzete nyonso ya mibesu,
mpe otosaki Ngai te, › »
elobi Yawe.
Kozonga epai na Yawe
14 « Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona. 15 Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele. 16 Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te ; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani. 17 Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango. 18 Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula.
19 Namilobelaki :
‹ Esengo nini penza nazalaki na yango
ya kokamata bino lokola bana
mpe kopesa bino mikili ya kitoko,
libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! ›
Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata ›
mpe bokotika te kolanda Ngai.
20 Kasi bino lisanga ya Isalaele,
bokosi Ngai lokola mwasi
oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, »
elobi Yawe.
 
21 Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba :
ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele,
pamba te babebisi nzela na bango
mpe babosani Yawe, Nzambe na bango.
 
22 « Bino batomboki, bozonga epai na Ngai
mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! »
 
« Solo, tokozonga epai na Yo,
pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso.
23 Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema
na bangomba mikuse mpe milayi
ezali kaka makelele ya pamba.
Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele.
24 Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko
ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso,
bibwele na bango mpe ngombe na bango,
bana na bango ya mibali mpe ya basi.
25 Soni ekomi lokola mbeto na biso,
mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ;
pamba te biso mpe batata na biso,
tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso,
totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. »