4
« Oh Isalaele, soki okozonga,
zonga epai na Ngai, »
elobi Yawe,
« soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai
mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ;
soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo :
‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola
mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »
Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi :
« Bokata bilanga ya sika,
mpe botika kolona kati na banzube.
Bomibulisa mpo na Yawe,
bopetola mitema na bino,
bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ;
noki te kanda na Ngai ekopela
mpe ekozikisa bino lokola moto
mpo na mabe oyo bozali kosala ;
ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango.
Pasi oyo ekowuta na nor
Bopanza sango na mokili ya Yuda,
botatola na Yelusalemi mpe boloba :
‹ Bobeta kelelo na mokili ! ›
Boganga makasi mpe bobelela :
‹ Bosangana, bino nyonso !
Tokima na bingumba batonga makasi ! ›
Botombola bendele mpo na kokende na Siona !
Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi
wuta na nor mpe kobebisama ya somo ! »
 
Nkosi moko ebimi na ndako na yango ;
mobebisi moko ya bikolo abimi.
Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo.
Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te.
Yango wana, bolata bilamba ya basaki,
bosala matanga mpe bolela,
pamba te kanda makasi ya Yawe elongwe
na mito na biso te.
 
« Na mokolo wana, »
elobi Yawe,
« mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto,
Banganga-Nzambe bakoyoka somo
mpe basakoli bakokamwa. »
10 Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. »
11 Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola. 12 Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. »
13 Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata,
bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ;
mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu.
Mawa na biso ! Tokufi na biso !
14 Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama.
Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?
15 Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani,
ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.
16 « Boloba yango na bikolo
mpe botatola yango na Yelusalemi :
‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya,
ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda.
17 Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga,
pamba te etombokelaki Ngai, › »
elobi Yawe.
18 « Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango.
Tala, etumbu na yo ezali bololo
mpe ekosala pasi makasi na motema. »
 
19 Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh !
Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi,
ezali koswa makasi kati na ngai,
mpe nazali kokoka kokanga monoko te,
pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.
20 Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ;
mokili mobimba ekufi.
Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi,
mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko.
21 Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba,
mpe nakoyoka makelele ya bitumba ?
 
22 « Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ;
bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te,
bayebi kaka kosala mabe,
kasi bayebi kosala bolamu te. »
 
23 Tango natalaki mabele,
namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo
mpe ezalaki ata na eloko moko te ;
tango natalaki likolo,
namonaki ete pole ezalaki lisusu te.
24 Tango natalaki bangomba,
namonaki yango koningana,
bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana.
25 Mpe tango natalaki malamu,
namonaki lisusu ata moto moko te,
mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki.
26 Tango nakobaki kotala,
namonaki ete mokili oyo ezalaki
na mabele ya malamu ekomaki esobe ;
bingumba na yango nyonso ebebisamaki
liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye.
27 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mokili mobimba ekobebisama,
kasi nakobebisa yango nyonso te.
28 Yango wana, mokili ekozala na matanga ;
mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo
pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te ;
lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. »
 
29 Bato nyonso ya engumba bakimi,
kaka na makelele ya basoda
oyo batambolaka likolo ya bampunda,
mpe oyo babundaka na matolotolo.
Bamoko babombami na bazamba,
bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ;
bingumba nyonso etikali lisusu na bato te,
mpe ata moto moko te atikali kuna.
 
30 Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ?
Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ;
otie bonzenga na miso na yo.
Ozali komikomisa kitoko na pamba,
bamakangu na yo bazali kotiola yo
mpe bazali koluka koboma yo.
 
31 Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi
oyo azali na pasi ya kobota,
kolela ya pasi lokola mwasi
oyo azali kobota mwana na ye ya liboso :
ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ;
azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba :
« Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »