5
Moto moko te azali sembo
« Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi,
botala zingazinga mpe bososola malamu penza,
boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;
soki bokoki komona ata moto moko
oyo atambolaka na bosembo
mpe alukaka boyengebene,
wana nakolimbisa engumba oyo.
Atako balapaka ndayi na maloba oyo :
‹ Na Kombo na Yawe, ›
ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »
 
Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te
komona bosolo ?
Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ;
osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana.
Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga
mpe baboyaka kobongola mitema na bango.
Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba,
bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te
mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.
Boye, nakokende epai ya bakambi na bango
mpe nakoloba na bango,
pamba te bango nde basengeli koyeba
nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. »
Kasi bango nyonso, na motema moko,
babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.
Yango wana, nkosi moko ekobima
wuta na zamba mpe ekoboma bango ;
mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe
mpe ekopasola bango ;
nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango
mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna,
pamba te botomboki na bango ezali monene
mpe lokuta na bango eleki mingi.
 
« Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ?
Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai
mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko
oyo ezali ata banzambe te.
Nakokisaki baposa na bango nyonso,
kasi basalaki kaka ekobo
mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.
Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka
soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi,
ndenge wana mpe moko na moko kati na bango
alandaka-landaka mwasi ya moninga
mpo na kosangisa na ye nzoto.
Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? »
elobi Yawe ?
« Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te
na ekolo ya lolenge oyo ?
10 Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi
mpe bobebisa yango ;
kasi bobebisa yango nyonso te.
Bokata bitape na yango,
pamba te etikali lisusu ya Yawe te.
11 Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli
na boyengebene te na miso na Ngai, »
elobi Yawe.
 
12 Bawanganaki Yawe mpe balobaki :
« Yawe akosala eloko moko te !
Pasi moko te ekokomela biso ;
tokotikala na biso komona te
ezala mopanga to nzala makasi.
13 Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba,
bazali na mateya penza ya koteya te ;
boye tika ete mabe oyo bazali kosakola
ezongela bango moko ! »
14 Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Lokola bato oyo balobi maloba ya boye,
nakosala ete maloba na Ngai ezala
lokola moto na monoko na yo,
mpe bato oyo bazala lokola bakoni
oyo moto yango ekozikisa.
15 Oh libota ya Isalaele, »
elobi Yawe,
« nakoyeisa ekolo moko wuta mosika
mpo na kobundisa yo :
ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya,
ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te.
16 Makonga na bango ezangaka koboma moto te,
bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba.
17 Bakobotola milona mpe bilei na yo,
bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali,
bakobotola bangombe mpe bameme na yo,
bakobebisa bilanga na yo ya vino
mpe banzete na yo ya figi,
bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi
oyo otielaka motema.
18 Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te. 19 Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? ›
Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
20 Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi
mpe botatola yango kati na Yuda :
21 Boyoka makambo oyo,
bino bazoba to bato oyo bozanga mayele :
bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te,
bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.
22 Bokoki penza kobanga Ngai te, »
elobi Yawe ?
« Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te,
Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi,
epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ?
Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ;
ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.
23 Kasi bato oyo bazali mitema makasi
mpe bazali solo batomboki ;
bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango !
24 Bamilobelaka te :
‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso,
oyo anokisaka mvula na tango ekoki,
na eleko ya kolona mpe ya kobuka ;
oyo akatela biso baposo oyo esengeli
mpo na kobuka milona. ›
25 Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso,
mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu.
 
26 Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe
oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo
mpo na kokanga bandeke,
mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato.
27 Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke,
ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ;
mpe ezali na nzela yango nde bakoma
bazwi mpe bato na nguya.
28 Bakoma kitoko mpe ngebungebu ;
mabe na bango eleka ndelo,
balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te,
mpo kaka bango moko balonga.
Bakataka makambo ya babola na bosembo te.
29 Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? »
elobi Yawe.
« Boni, motema na Ngai ezongisa penza
mabe na mabe te na ekolo ya boye ?
 
30 Makambo ya kokamwa mpe ya somo
esalemi na mboka :
31 basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta,
Banganga-Nzambe bazali kosalela
bokonzi na bango ndenge balingi,
mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo.
Kasi bokosala nini na suka ? »