6
« Bino bato ya Benjame,
bokima mpo na lobiko na bino !
Bobima na Yelusalemi !
Bobeta kelelo na Tekoa !
Botombola bendele kati na Beti-Akeremi !
Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo
ekobimela na nor.
Nakobebisa Siona, mboka kitoko,
oyo ezali penza kitoko
lokola elenge mwasi ya kitoko
mpe ya nzoto sembesembe.
Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango
bakobundisa yango,
bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango ;
bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye
na esika oyo ye akozwa.
 
Bomibongisa mpo na kobundisa yango !
Botelema, tika ete tobundisa yango na midi !
Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili
mpe molili ya pokwa ezali koya.
Boye, totelema ! Tika ete tokota kati na yango na butu,
tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi ! »
 
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama
zingazinga ya Yelusalemi !
Engumba oyo esengeli kozwa etumbu,
pamba te etondi na makambo mabe !
Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi,
ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe.
Sango moko kaka ezali kotambola kuna :
sango ya mobulu mpe ya kobebisama ;
tango nyonso liboso na Ngai,
kaka minyoko mpe bapota.
Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo,
noki te nakomikomisa mosika na yo
mpe nakokomisa mokili na yo esobe,
mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. »
 
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali
ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka ;
bolekisa lisusu maboko na bino
na likolo ya bitape ya banzete ya vino
lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. »
 
10 Naloba lisusu na nani
mpe nakebisa penza nani ?
Nani akoyokela ngai ?
Matoyi na bango ekangama ;
yango wana bakokaka koyoka te.
Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango,
basepelaka na bango na yango te.
11 Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe
mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema.
 
« Sopa yango na bana mike kati na babalabala
mpe na lisanga ya bilenge mibali ;
ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko,
ezala mikolo to mibange.
12 Tango nakosembola loboko na Ngai
mpo na kotelemela bavandi ya mboka,
nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango,
epai ya bato mosusu, »
elobi Yawe.
13 « Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike,
batondi na lokoso ya mbongo,
kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe :
bango nyonso bazali kotambola na lokuta.
14 Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo
mpe bazali koloba : ‹ Makambo nyonso ezali malamu,
nyonso ezali kotambola malamu ! ›
Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te.
15 Boni, bazali penza koyokela
makambo na bango ya nkele soni te ?
Te, bazali na bango koyoka ata soni te ;
bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te.
Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso,
bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, »
elobi Yawe.
16 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Botelema na esika oyo nzela ekutana,
botuna nzela ya kala
mpe esika oyo nzela ya malamu ezali,
bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia
mpo na mitema na bino.
Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
17 Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino :
‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! ›
Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. ›
18 Yango wana, bino bikolo, boyoka !
Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango.
19 Oh mabele, yoka !
Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo,
ekozala lifuti ya mabongisi na bango,
pamba te bayokaki mongongo na Ngai te
mpe babwakaki Mobeko na Ngai.
20 Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba
to na matiti ya solo kitoko
oyo ewuti na mboka ya mosika ?
Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te,
mpe nandimaka makabo na bino te. »
21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ;
batata mpe bana na bango bakobeta mabaku
mpe bakokweya nzela moko,
bazalani elongo na baninga bakokufa. »
22 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala, mampinga moko ya basoda
ezali koya longwa na mokili ya nor ;
ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba
wuta na basuka ya mabele.
23 Basimbi matolotolo mpe makonga,
bazali mitema mabe mpe bazanga mawa,
bazali koganga lokola makelele ya ebale monene,
bamati likolo ya bampunda,
batandami na milongo lokola basoda
mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. »
 
24 Tango toyokaki sango na tina na bango,
tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso
mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
25 Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te,
pamba te monguna asimbi mopanga,
bongo somo makasi ezali bisika nyonso.
26 Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki
mpe bolala na putulu,
bosala matanga lokola moto
oyo akufisi mwana na ye se moko.
Bolela na mawa,
pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata.
 
27 « Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai
lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende,
mpo ete okoka kotala malamu
mpe omeka ezaleli na bango.
28 Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi,
bayebi kaka kotonga.
Bazali lokola bronze mpe ebende,
bango nyonso bazali kaka babebisi.
29 Epepelo ezali kopelisa moto makasi,
mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto ;
kasi bazali na bango kaka konyangwisa
ebende yango na pamba,
pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te.
30 Babengaka bango palata babwaka,
pamba te Yawe asundola bango. »