10
Nzambe ya solo mpe banzambe ya lokuta
Eh libota ya Isalaele, yoka liloba oyo Yawe azali koloba na yo ! Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Kolanda bizaleli ya bikolo ya bapaya te
mpe kobanga bilembo ya likolo te
ata soki ezali kobangisa bato ya bikolo.
Pamba te bizaleli ya bikolo ya bapaya ezali se pamba,
banzambe na bango ezali se banzete ya pamba
oyo bakataka kati na zamba,
bongo moto ya misala ya maboko nde abongisaka yango
na bambeli na ye.
Bapakolaka yango palata mpe wolo,
babetaka yango basete na marto mpo ete eningana te.
Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko
oyo batiaka na elanga ya bapasiteki
mpo na kokimisa bandeke :
elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te.
Kobanga yango te,
pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. »
 
Eh Yawe, moko te akokani na Yo !
Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene.
Oh Mokonzi ya bikolo,
nani akoki koboya kotosa Yo ?
Obongi na lokumu,
pamba te moko te azali lokola Yo
kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo
mpe kati na mikili na bango nyonso.
 
Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ;
mateya na bango ezalaka ya pamba,
mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !
Bapakola yango palata balekisa na moto,
oyo ewuta na Tarsisi,
mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ;
bato oyo basalaka bililingi na banzete
mpe ba-oyo balambaka bibende na moto
nde basalaka yango :
balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ;
ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko,
oyo bayebi penza mosala malamu.
10 Kasi Yawe azali Nzambe ya solo,
Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko.
Soki asiliki, mokili eninganaka,
bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye.
11 Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. »
12 Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye,
alendisa mokili na bwanya na Ye
mpe atanda likolo na mayele na Ye.
13 Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo,
asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili,
apelisaka mikalikali,
anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe
wuta na bibombelo na Ye.
 
14 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba,
lokola bato oyo basili mayele ;
monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye,
pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta,
ezalaka na pema te kati na yango.
15 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ;
ekolimwa na tango ya kosambisama.
16 Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi
akokani na bikeko wana te,
pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso,
ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ;
Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Etumbu ekoya
17 Yo ekolo oyo bazingeli,
kamata bisaka na yo mpe bima na mokili !
18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Ya mbala oyo, nakobengana bavandi ya mokili oyo
mpe nakotindela bango pasi
mpo ete bakanga bango. »
 
19 Mawa na ngai, pamba te nazoki makasi na motema !
Pota na ngai ezali kosila te !
Namilobelaki : « Ezali pasi na ngai moko,
esengeli na ngai kokanga motema. »
20 Ndako na ngai ya kapo ebebisami,
basinga na yango nyonso ekatani,
bamemi bana na ngai ya mibali,
natikali lisusu ata na mwana moko te.
Nazali lisusu na moto ata moko te
oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo
to akobongisela ngai esika ya kovanda.
 
21 Pamba te bakambi bazangaki mayele,
balukaki Yawe te ;
yango wana, balongaki te,
mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki.
22 Boyoka ! Makelele moko ezali koya,
lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor,
ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda
mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba.
Libondeli ya Jeremi
23 Oh Yawe, nayebi ete moto moko te
azali mokonzi ya bomoi na ye ;
moto oyo azali kotambola
azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.
24 Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ;
kasi kopesa yango na kanda te,
noki te okosilisa koboma biso.
25 Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya
oyo endimaka Yo te,
likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te,
pamba te babebisi Jakobi,
babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye.