11
Boyokani ebebi
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi :
— Boyoka malako ya boyokani oyo, mpe boyebisa yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi ! Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Tika ete alakelama mabe, moto oyo akotosa te malako ya boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. »
Nazongisaki :
— Solo, Yawe ; amen !
Yawe alobaki na ngai :
— Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi : « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango ! Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo : ‹ Botosa Ngai ! › Kasi batiaki matoyi mangongi mpe bayokelaki Ngai te. Balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Yango wana, natindelaki bango bilakeli mabe nyonso oyo ezali kati na boyokani oyo natindaki bango ete batosa, kasi bango basalelaki yango te. »
Yawe alobaki na ngai :
— Bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi basali likita. 10 Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango. 11 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te. 12 Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango. 13 Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »
14 Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko ; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi.
Isalaele : nzete ya olive ya Yawe
15 « Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala
kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele ?
Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama
ekoki solo kolongola etumbu na yo ?
Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana ? »
 
16 Yawe azalaki kobenga yo
« Nzete ya olive ya mobesu
oyo etonda na mbuma kitoko. »
Kasi Yawe akotumba yango
na makelele ya mopepe makasi,
mpe bitape na yango ekobukana-bukana.
17 Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.
Basaleli Jeremi likita
18 Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala. 19 Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba :
« Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango,
tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi
mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
20 Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga,
Yo oyo osambisaka na bosembo
mpe omekaka mitema mpe makanisi,
sala ete namona mabe oyo okozongisela bango,
pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.
21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; » 22 yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi. 23 Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. »