14
Bokawuki, nzala makasi mpe mopanga
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki :
« Bato ya Yuda bazali na matanga,
bingumba na bango esili kobebisama,
bazali kolela mpo na mokili na bango,
mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
Bakambi bazali kotinda basali na bango
mpo ete bakende kotoka mayi ;
kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te,
bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba,
bazipi bilongi na soni mpe na mawa.
Mabele esili kokawuka,
pamba te mvula ezali konoka lisusu te,
basali bilanga bakomi na pasi
mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.
Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima
ata mwana na yango oyo esili kobota,
pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te.
Ba-ane ya zamba etelemi
na basonge ya bangomba ekawuka
mpe ezali kobenda mopepe lokola mbwa ya zamba ;
miso na yango elembi kotala,
pamba te matiti ya kolia ezali te. »
 
Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso,
sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
pamba te towangani Yo mpe mingi,
tosalaki masumu liboso na Yo.
Oh Elikya ya Isalaele,
Mobikisi na ye na tango ya pasi,
mpo na nini ozali kosala makambo
lokola mopaya kati na mboka oyo
to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka
mpo na kolekisa butu ?
Mpo na nini ozali kosala makambo
lokola moto oyo asutuki
to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto ?
Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso
mpe tobengami solo na Kombo na Yo !
Kosundola biso te !
10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo :
« Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola,
bavandaka esika moko te.
Yango wana, Yawe asepelaka na bango te,
akobosana mabe na bango te
mpe akopesa bango etumbu
mpo na masumu na bango. »
11 Bongo, Yawe alobaki na ngai :
— Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te ! 12 Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.
13 Kasi nazongiselaki Ye :
— Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango : « Te ! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. »
14 Yawe alobaki na ngai :
— Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko. 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi. 16 Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
17 Loba na bango maloba oyo :
‹ Butu mpe moyi,
miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli,
ezali kokawuka te !
Pamba te moseka na ngai, bato na ngai,
bazali na pasi mingi
mpo ete babetami makasi.
18 Soki nakeyi na zamba,
nazali komona bibembe ya bato
oyo babomi na mopanga ;
soki nakoti kati na engumba,
nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala.
Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola
likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › »
 
19 Boni, obwaki solo Yuda ?
Oyini penza Siona ?
Mpo na nini otindeli biso pasi makasi
oyo ezangeli nzela ya kobika ?
Tokanisaki ete tokozwa kimia ;
nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te !
Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ;
nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi !
20 Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso
mpe masumu ya batata na biso !
Solo, tosali penza masumu liboso na Yo.
21 Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo !
Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo !
Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso
mpe kobebisa yango te !
22 Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo,
oyo enokisaka mvula ?
Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ?
Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso !
Totie elikya na biso nyonso epai na Yo,
pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.