15
Etumbu ekolongwa te
Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai ! Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango :
‹ Tala liloba oyo Yawe alobi :
Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa !
Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga
bakufa na mopanga !
Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi
bakufa na nzala makasi !
Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu
bakende na bowumbu ! ›
Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango. Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.
Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa ?
Nani akolela yo ?
Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo ?
Osundolaki Ngai, » elobi Yawe,
« opesaki Ngai mokongo.
Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo,
mpe nakobebisa yo ;
nakoyokela yo lisusu mawa te.
Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo
na bikuke ya engumba,
nakobotola bango bana na bango
mpe nakoboma bato na Ngai,
pamba te babongoli bizaleli na bango te.
Basi na bango oyo bakufisa mibali,
nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene.
Na ngonga ya midi,
nakoyeisa mobebisi mpo na koboma
bamama ya bana na bango ;
nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.
Mama ya bana sambo akolemba nzoto
mpe akopema na pasi makasi.
Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela :
akoyokisama soni mpe akosambwa.
Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi
liboso ya banguna na bango, »
elobi Yawe.
Bileli ya Jeremi
10 Oh mama na ngai, mawa na ngai !
Mpo na nini obotaki ngai !
Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka.
Nadefisa moto moko te eloko
mpe nadefa eloko ya moto moko te,
kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.
11 Yawe alobaki :
« Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo ;
solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo
na tango ya pasi mpe ya minyoko.
 
12 Boni, moto akoki penza kobuka ebende ?
Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze ?
 
13 Nakosala ete babotola bino biloko
mpe bomengo na bino ;
bongo bakofuta bino yango te
mpo na masumu na bino nyonso
oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.
14 Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino
kati na mokili oyo botikala ata koyeba te,
pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto
oyo ekotumba bino. »
 
15 Oh Yawe, oyebi makambo nyonso,
kanisa ngai mpe batela ngai.
Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai.
Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te !
Tala ndenge nazali kondima koyoka soni
kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo !
16 Tango kaka nayokaki maloba na Yo,
nayambaki yango na esengo ;
maloba yango esepelisaki ngai
mpe etondisaki motema na ngai na esengo ;
pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo,
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
17 Natikala kovanda te kati na batioli
to mpe kosepela elongo na bango.
Natikalaki kaka ngai moko,
pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai
mpe otondisaki ngai na kanda.
18 Mpo na nini pasi na ngai esilaka te
mpe pota na ngai ya monene esilaka te ?
Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta,
lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
19 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Soki ozongi epai na Ngai,
nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ;
soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina,
kasi maloba ya pamba-pamba te,
okozala molobeli na Ngai.
Tika ete bato oyo balanda yo ;
kasi yo, kolanda bango te.
20 Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo,
mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ;
bakobundisa yo kasi bakolonga yo te,
pamba te nazali elongo na yo
mpo na kobikisa mpe kokangola yo, »
elobi Yawe.
21 « Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe
mpe nakokangola yo na maboko ya bato
oyo banyokolaka yo. »