16
Jeremi atikali ye moko
Yawe alobaki na ngai : « Okobala te mpe okotikala kobota bana mibali to bana basi na esika oyo te. » Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bana mibali mpe bana basi oyo bakobotama na mboka oyo, mpe na tina na basi oyo bazali bamama na bango mpe mibali oyo bazali batata na bango : « Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. »
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe, « ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango. Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango.
Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela, pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala.
10 Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? › 11 Okoloba na bango : ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te. 12 Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai. 13 Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›
14 Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › 15 kasi bakokoma koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango.
16 Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga. 17 Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai. 18 Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. »
19 Oh Yawe, Makasi na ngai
mpe Ndako na ngai batonga makasi,
Ekimelo na ngai na tango ya pasi,
bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo
wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba :
« Batata na biso bazalaki kaka
na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba
oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.
20 Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe,
tango bango moko bazali banzambe te ?
 
21 Yango wana, nakolakisa bango,
nakolakisa bango nguya mpe makasi na ngai ;
bongo bakoyeba penza
ete Kombo na Ngai ezali Yawe. »