17
« Masumu ya Yuda ezali lokola makomi
oyo bakoma na ekomeli ya ebende
oyo ezali na songe ya diama ;
bakoma yango na bitando ya mitema na bango
mpe na maseke ya bitumbelo na bango.
Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali,
ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango
mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi,
pembeni ya banzete ya mibesu
na likolo ya bangomba.
Oh ngomba na Ngai kati na mokili,
nakokaba lokola bomengo ya bitumba :
biloko na yo, bozwi na yo nyonso
mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba
mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo.
Likolo ya mabe na yo,
okobungisa libula oyo napesaki yo,
nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo
kati na mokili oyo oyebi te ;
pamba te opelisi kanda na Ngai,
mpe ekopela mpo na libela. »
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto,
oyo ayekamelaka eloko ya pete
mpe atalelaka Yawe te,
alakelama mabe !
Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ;
akomona bolamu te tango ekoya,
akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe,
na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te.
 
Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe
mpe atalelaka Ye apambolama !
Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi,
oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi :
ezalaka na somo ya moyi makasi te ;
makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso.
Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te
mpe ebotaka mbuma tango nyonso. »
 
Motema eleki biloko nyonso na lokuta
mpe ekoki kobika te ;
nani akoki koyeba yango ?
 
10 « Ngai Yawe,
nayebi motema mpe nasosolaka malamu
makanisi na yango,
mpo na kofuta moto na moto
kolanda etamboli mpe misala na ye. »
 
11 Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te
azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu.
Boye, bomengo yango ekokima
na kati-kati ya bomoi na ye
mpe ekomonisa bozoba na ye
na suka ya bomoi na ye.
 
12 Kiti ya Bokonzi ya nkembo,
oyo enetolama wuta na ebandeli
ezali nde Esika na biso ya bule.
13 Oh Yawe, Elikya ya Isalaele,
bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni,
bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka,
pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi.
 
14 Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ;
Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama,
mpo ete nakumisaka nde Yo !
15 Tala, bato oyo bazali koloba na ngai :
« Wapi Liloba na Yawe ?
Tika ete ekokisama sik’oyo ! »
16 Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele
oyo alandaka nzela na Yo.
Oyebi malamu ete nazalaki na posa
ya komona mokolo ya pasi te.
Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai
ebimaka nde liboso na Yo.
17 Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai
na tango ya pasi !
18 Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni,
kasi batela ngai ete nayokisama soni te !
Tika ete bango balenga na somo,
kasi ngai nalenga na somo te.
Tindela bango mokolo ya pasi,
bebisa bango malamu mbala mibale.
Kobulisa mokolo ya Saba
19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi. 20 Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe ! 21 Tala liloba oyo Yawe alobi : Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi ; 22 moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino. 23 Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai. 24 Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba, 25 bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo. 26 Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe. 27 Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › »