18
Ndako ya mosali mbeki
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi :
— Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo.
Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye. Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye. Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai :
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ? Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo, bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango. To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala, 10 bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu.
11 Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. ›
12 Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › »
Isalaele abosani Yawe
13 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi :
« Boluka koyeba kati na bikolo
soki nani asila koyoka makambo ya boye !
Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza !
14 Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani
kosila na bangomba na yango ?
Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka
na bangomba na yango kokawuka ?
15 Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai,
bazali kotumba malasi ya ansa
mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina,
oyo ebetisaka bango mabaku na nzela
mpe epengwisaka bango na nzela ya kala,
bongo ememaka bango na banzela mosusu
oyo bafungola nanu te.
16 Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te,
ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso,
bongo bato nyonso oyo bakoleka wana
bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
17 Nakopanza bango liboso ya banguna na bango
ndenge mopepe ya este esalaka.
Tango bakokoma na pasi,
nakopesa bango mokongo
mpe nakolakisa bango elongi na Ngai te. »
Likita mpo na kosala Jeremi mabe
18 Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »
19 Eh Yawe, yoka makambo oyo
bafundi na ngai bazali koloba !
20 Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ?
Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai !
Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo
mpo na koloba na tina na bolamu na bango,
mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango.
21 Mpo na yango, boma bana na bango na nzala,
kaba bango na mopanga !
Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango
mpe bakoma basi bakufisa mibali !
Tika ete kufa ekomela mibali na bango,
mpe bilenge mibali na bango bakufa
na mopanga ya bitumba.
22 Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango
tango okotindela bango banguna na pwasa,
pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai
mpe batie mitambo na makolo na ngai !
23 Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso
oyo basali mpo na koboma ngai ;
kolimbisa mabe na bango te,
kolongola masumu na bango liboso na Yo te !
Tika ete balenga liboso na Yo !
Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo.