27
Kondima kosalela Babiloni
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :
Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo. Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda. Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‘ Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo : Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi. Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye. Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye. Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye. Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te. 10 Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa. 11 Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe. ’ › »
12 Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika ! 13 Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni ? 14 Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino : ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te ! › Bazali kosakola makambo ya lokuta. 15 Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. »
16 Bongo nalobaki na Banganga-Nzambe mpe na bato nyonso : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Boyoka te basakoli na bino, oyo bazali koloba : ‹ Tala, bisalelo ya Tempelo ya Yawe ekozonga noki wuta na Babiloni. › Bazali koloba na bino makambo ya lokuta ! 17 Boyoka bango te ! Bosalela mokonzi ya Babiloni, bongo bokobika ! Mpo na nini engumba oyo ebebisama ? 18 Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te. 19 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana, 20 bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; 21 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi : 22 ‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › »