28
Jeremi mpe mosakoli ya lokuta Anania
Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. Etikali kaka mibu mibale ; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni. Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › »
Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe. Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu ! Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso : Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ; kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. »
10 Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango. 11 Anania alobaki liboso ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › »
Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye.
12 Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi : 13 « Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende. 14 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › »
15 Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta ! 16 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › »
17 Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki.