37
Mosakoli Jeremi na boloko
Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi. Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi.
Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! »
Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te. Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi. Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ; mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. › Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. › 10 Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. »
11 Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana, 12 Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna. 13 Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye :
— Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ?
14 Jeremi azongisaki :
— Te ! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te !
Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi. 15 Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko. 16 Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi.
17 Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku :
— Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ?
Jeremi azongisaki :
— Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni.
18 Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi :
— Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo ? 19 Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ? 20 Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna !
21 Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.