38
Babwaki Jeremi na libulu
Shefatia, mwana mobali ya Matani ; Gedalia, mwana mobali ya Pashuri ; Yukali, mwana mobali ya Shelemia ; mpe Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, bayokaki makambo oyo Jeremi azalaki koyebisa bato nyonso. Azalaki koloba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. › Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › »
Bakalaka balobaki na mokonzi :
— Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango.
Mokonzi Sedesiasi azongisaki :
— Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te !
Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango.
Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame, Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi :
— Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza ! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba !
10 Mokonzi apesaki mitindo oyo epai ya Ebedi-Meleki, moto ya mokili ya Kushi :
— Kamata awa mibali tuku misato elongo na yo, mpe bobimisa mosakoli Jeremi wuta na libulu liboso ete akufa.
11 Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo ; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu. 12 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi :
— Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo.
Jeremi asalaki se bongo. 13 Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli.
Mituna ya Sedesiasi epai ya Jeremi
14 Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi :
— Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te !
15 Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi :
— Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te ? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te.
16 Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi :
— Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo !
17 Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi :
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te. 18 Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. »
19 Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi :
— Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai.
20 Jeremi azongisaki :
— Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo. 21 Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai : 22 « Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba :
‹ Baninga na yo ya motema
bakosi yo mpe balongi yo.
Matambe na yo ezindi na potopoto,
baninga na yo bakimi yo ! › »
23 Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto.
24 Sedesiasi alobaki na Jeremi :
— Tika ete moto moko te ayeba makambo oyo, mpe okokufa te. 25 Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo : « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. » 26 Loba bango : « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. »
27 Bakalaka nyonso bayaki epai ya Jeremi mpe batunaki ye mituna ; ye mpe ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge kaka mokonzi atindaki ye. Boye, lokola bazalaki lisusu na likambo ya koloba na ye te, pamba te moto moko te ayokaki masolo na ye na mokonzi, babendanaki na kimia.
28 Jeremi atikalaki kati na lopango ya bakengeli kino na mokolo oyo babotolaki engumba Yelusalemi.