48
Kosambisama ya Moabi
Na tina ya Moabi :
 
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi :
« Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama !
Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango,
ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.
Moabi ekozala lisusu na lokumu te,
bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni
mpo na kokweyisa yango :
‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! ›
Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ;
mopanga ekolanda yo.
Yoka makelele oyo ezali kobima kuna na Oronayimi :
ezali lokito ya bitumba mpe ya kobebisama !
Moabi ebebisami makasi penza
mpe bana na yango bazali kolela.
Bazali komata na kolela,
nzela-nzela mpo na kokende na Luyiti ;
mpe tango bazali kokita na Oronayimi,
koganga ya mawa ezali koyokana
mpo ete Moabi esili kobebisama.
Bokima !
Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino ;
bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe !
Lokola bozali kotia mitema na misala na bino
mpe na bomengo na bino,
bino mpe bokokende na bowumbu ;
boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu
elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.
Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso
mpe ata engumba moko te ekobika ;
lubwaku ekobebisama,
mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama,
pamba te Yawe alobi.
Bobongisa kunda mpo na Moabi
mpo ete ekobebisama solo ;
bingumba na yango ekotikala pamba,
mpe bato bakovanda lisusu kuna te.
 
10 Tika ete moto oyo asalelaka Yawe
na kozanga komipesa alakelama mabe !
Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye
mpo ete etangisa makila alakelama mabe !
 
11 Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango
lokola masanga ya vino oyo baningisi te,
oyo babongoli na mbeki mosusu te,
mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te.
Boye, elengi na yango ebongwana te
mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.
12 Kasi na mikolo ekoya, »
elobi Yawe,
« nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yango
lokola masanga ya vino na mbeki mosusu :
bakosopa yango,
bakosilisa yango na mbeki
mpe bakobuka mbeki na yango.
13 Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi
ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni
tango batiaki mitema na Beteli.
 
14 Ndenge nini bokoki koloba :
‹ Tozali basoda ya mpiko,
bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›
15 Mokili ya Moabi ekobebisama,
mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ;
bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema
bakokufa na mopanga, »
elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
16 « Kobebisama ya Moabi ezali na nzela,
pasi na yango ekoya na lombangu penza.
17 Bino bazalani nyonso ya Moabi,
bosalela ye matanga ;
bino bato oyo boyebi sango ya lokumu na ye,
boloba : ‹ Ah, tala ndenge lingenda ya nguya,
lingenda ya bokonzi ya nkembo, ebukani ! ›
 
18 Oh bato ya elenge mwasi Diboni,
botika nkembo na bino
mpe bovanda na esobe ;
pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi
akoya mpe kobundisa bino
mpe kobebisa bingumba na bino
oyo batonga makasi !
19 Bino bavandi ya Aroeri,
botelema na nzela mpe botala malamu,
botuna mobali oyo azali kokima
mpe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na ye
soki makambo nini esili kosalema !
20 Moabi ezali na soni
mpo ete esili kokweya.
Bolela mpe boganga,
bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami !
21 Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba :
na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,
22 na Diboni, na Nebo mpe na Beti-Diblatayimi,
23 na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,
24 na Kerioti mpe na Botsira,
na bingumba nyonso ya Moabi,
ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene.
 
25 Liseke ya Moabi ebukani
mpe loboko na ye ekatani, »
elobi Yawe.
 
26 « Bolangwisa ye masanga,
pamba te abetaki tembe na Yawe !
Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye !
Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki !
27 Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te
na miso na bino ?
Bokangaki ye kati na miyibi
mpo ete bokoma koseka ye
tango nyonso bokolobela kombo na ye ?
28 Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino
mpe bokende kovanda kati na mabanga !
Bozala lokola ebenga oyo etongaka
zala na yango kati na mabanga.
 
29 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi,
lolendo oyo eleka penza ndelo !
Tala ndenge amatisaka mapeka !
Atondi na lofundu,
azali na monoko makasi,
mpe motema na ye emikitisaka te.
30 Nayebi ete monoko makasi na ye
ezali kaka pamba, »
elobi Yawe,
« mpe lolendo na ye esalaka eloko moko te.
31 Yango wana nazali kolela mpo na Moabi,
nazali kolela mpo na Moabi nyonso ;
nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.
32 Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo
ndenge engumba Yaezeri ezali kolela !
Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene,
ekomi kino na mayi monene Yaezeri.
Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo
mpe mbuma ya vino na yo.
33 Esengo mpe kosepela esili kolimwa
na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ;
nakawusi vino kati na bikamolelo na bango,
mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te.
Atako bato bazali koganga
kasi ezali makelele ya esengo te.
 
34 Makelele mpe koganga ezali komata
wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi,
wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ;
pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.
35 Nakoboma bato nyonso
oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba
mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka
epai ya banzambe na bango,
kati na mokili ya Moabi, »
elobi Yawe.
36 « Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi
ndenge flite ebetaka,
ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti.
Bomengo na bango nyonso esili kobunga.
37 Bakokoli suki ya mito ya bato nyonso,
bakati moto moko na moko mandefu
mpe bazokisi moto moko na moko na loboko.
38 Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi
mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka,
ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ;
pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, »
elobi Yawe.
39 « Tala ndenge nini apanzani,
tala ndenge nini bazali kolela !
Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni !
Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyoka
na miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. »
 
40 Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu
mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.
41 Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi.
Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi
ekokoma lokola motema ya mwasi
oyo azali na pasi ya kobota.
42 Mokili ya Moabi ekobebisama
mpe ekotikala lisusu ekolo te ;
pamba te ebetaki tembe na Yawe.
43 Somo, libulu mpe motambo ezali kozela
bino bato ya Moabi, »
elobi Yawe.
44 « Moto nyonso oyo akokima somo
akokweya na libulu,
mpe moto nyonso oyo akobima na libulu
akokangama na motambo,
pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu
na mokili ya Moabi, »
elobi Yawe.
45 « Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi
na elili ya engumba ya Eshiboni,
pamba te moto moko ewuti na Eshiboni,
moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni,
etumbi bandako batonga makasi ya Moabi
mpe mito ya bato ya lolendo.
46 Oh Moabi, mawa na yo !
Bato ya Kemoshi babebisami,
bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu,
mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu !
47 Nzokande, na mikolo ekoya,
nakozongisa lokumu ya Moabi, »
elobi Yawe.
Kosambisama ya Moabi esuki awa.